Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 5
  • Bozongeli ya Liyangani ya Zongazonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Liyangani ya Zongazonga
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya mayangani
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bozongeli ya Liyangani ya zongazonga
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 5

Bozongeli ya Liyangani ya Zongazonga

Lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala mwa moke liboso lisangá na bino ekende na liyangani ya zongazonga mpo na mobu ya mosala 2006, mpe mwa moke nsima na yango. Mokɛngɛli-mokambi akotya yango na programɛ ya Likita ya Mosala liboso ya kokende na liyangani mpe nsima ya liyangani, ndenge Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2004, lokasa 4 emonisaki yango. Na ntango ya bozongeli, esengeli kotuna mituna nyonso, mpe kolobela mingi ndenge oyo tokoki kosalela makambo toyokaki na liyangani.

MOKOLO YA LIBOSO

1. Ndenge nini tolataka bomoto ya sika mpe mpo na nini tosengeli kobatela bomoto yango?

2. Ndenge nini basakoli mosusu basalaki mpo bákóma kosakola mingi?

3. Mpo na nini tosengeli koboya komikokanisa na basusu?

4. Ndenge nini bato ya libota moko bakoki komonisa bomoto ya sika na kati ya libota na bango?

5. Ndenge nini tokoki komonisa ete topesaka lisangá mabɔkɔ na bosembo mpenza?

6. Mpo na nini tosengeli komonisa bomoto ya sika na mosala ya kosakola?

7. Komanyola ya malamu esɛngaka nini, mpe komanyola ya ndenge wana esalisaka biso na nini?

8. Bizaleli nini ekokómisa biso pɛtɛpɛtɛ na mabɔkɔ ya Yehova?

MOKOLO YA MIBALE

9. Mpo na nini ezali na ntina mingi tósalelaka malamu lolemo na biso?

10. Matomba nini tokozwa soki tozali kosalela malamu lolemo na biso ntango tozali elongo na baninga ya mosala, baninga ya kelasi, to bato mosusu?

11. Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo oyo ezali na Baefese 4:​25-32 na boyokani na biso na bandeko na biso bandimi?

12. Wapi lolenge eleki malamu ya kosalela lolemo na biso?

13. Nini tosengeli kosala mpo na kolonga moto mabe?

14. Na makambo nini tosengeli kosala makasi mpo na komibatela kozanga litɔnɔ ya mokili?

15. Mpo na nini tosengeli kokómisa sika bomoto na biso ya kati mokolo na mokolo, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

16. Toli nini ya liyangani ya zongazonga ya mbula oyo ozali kokana kosalela yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto