Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 6
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Batelá liso na yo alima
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 6

Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Liso esalemi na ndenge ya kokamwa. (Nz. 139:14) Atako bongo, liso ekoki kotala kaka eloko moko na mbala moko. Yango ezali solo, ezala mpo na liso ya solosolo to mpo na liso ya elilingi. Mpo liso na biso ya elimo emona malamu mpe ezala pai pai te, tosengeli kotala kaka likambo moko: kosala mokano ya Nzambe. Lokola mokili ya Satana ezali kaka kobimisa makambo oyo ekoki kopengwisa likebi na biso, ebongi mpenza ete liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2006 elobela motó ya likambo, “Batelá liso na yo alima”!​—⁠Mat. 6:⁠22.

Nini tosengeli kosala mpo na kozwa mapamboli epai na Yehova? (Mas. 10:22) Lisukulu oyo ezali na motó ya likambo, “Mapamboli oyo okozwa soki obateli liso na yo alima,” ekoyanola motuna wana. Mituna-lisolo ekolobela mingi matomba oyo tokoki kozwa soki tosaleli mitinda ya Makomami. Lisukulu ya liboso oyo molobi mopaya akosala, oyo ezali na motó ya likambo, “Batelá liso na yo alima na mokili oyo mabe,” ekokebisa biso na makambo oyo ekoki kobimisa mindɔndɔ na bomoi na biso mpe ekoki mokemoke kolɛmbisa biso na elimo. Tokoyeba mpe nini elimboli ‘kopona eloko oyo ezali malamu.’​—⁠Luka 10:⁠42.

Ndenge nini baboti mpe mikóló mosusu balendisaka bilenge baklisto bátya liso na bango mobimba na mikano ya elimo? Na masolo, “Baboti oyo babwakaka mbanzi na bango alima” mpe “Bilenge oyo bamityelaka mikano ya elimo,” baboti mpe bilenge bakolobela motuna wana ya ntina mingi. (Nz. 127:⁠4) Lisukulu ya nsuka oyo molobi mopaya akosala ekomonisa ndenge oyo mokomoko na biso, libota mobimba, mpe lisangá mobimba, tokoki kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova.

Ezala touti koyekola solo sika to tozali kosalela Yehova banda bambula ebele, ezali na ntina mingi ‘tóbatela liso na biso alima.’ Liyangani ya mokolo moko ekosalisa biso na kosala yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto