Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/05 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 1/05 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.

“Biso nyonso tolingaka tózala na bomoi ya malamu elongo na bana na biso, kasi bato mingi bakokaka te kokokisa mposa yango. Okanisi tokoki kopona makambo oyo ekokómela biso na mikolo ezali koya? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi ete tokoki kokokisa mposa yango mpe ete bomoi na biso na mikolo ezali koya etaleli bikateli oyo tozali kozwa lelo.” Tángá Deteronome 30:⁠19.

Lamuká! 22 Yan.

“Ntango tobɛli, biso nyonso tosepelaka na monganga oyo ayebi komitya na esika na biso. Kasi, okanisi ete bato mingi ya maladi bamityaka mpe na esika ya minganga na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mikakatano oyo minganga bakutanaka na yango mpe elikya oyo bakoki kozala na yango mpo na mikolo ezali koya.” Tángá Yisaya 33:⁠24.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Feb.

“Ntango omonaka ndenge bazali konyokola ebele ya bato mpe kosalela bango mobulu, yango etungisaka yo te? [Lobelá likambo moko oyo eyebani na esika ofandi, mpe tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi ya moto. Ezali mpe kolimbola ndenge Nzambe akobikisa biso na bampasi ya lelo oyo.” Tángá Nzembo 72:12-14.

Lamuká! 8 Feb.

“Moko ya mikakatano minene oyo tozali kobundana na yango lelo oyo ezali mitungisi. Bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia esakolaki mpenza ete ekozala bongo. [Tángá 2 Timote 3:1.] Zulunalo oyo epesi makanisi oyo ebongi mpenza, oyo ekoki kosalisa yo ná libota na yo bólonga mitungisi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto