Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/07 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 1/07 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.

“Okanisi ete epai wapi mwasi ná mobali na ye bakoki kozwa toli ya malamu mpo na libala na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Talá moto oyo abandisaki libala. [Tángá Genese 2:22.] Nzambe apesi mpe malako mpo na mokumba ya lokumu oyo mwasi ná mobali bazali na yango. Zulunalo oyo elimboli mokumba yango.”

Lamuká! Yan.

“Omonaka te ete bato mingi oyo balobaka ete bazali baklisto balandaka te mateya ya Yesu? [Tiká ye apesa eyano.] Na ndakisa, mingi balandaka te maloba oyo ya Yesu. [Tángá Yoane 13:35.] Lisolo oyo ezali kolobela bokeseni oyo ezali kati na mateya ya Yesu mpe makanisi ya bato mingi oyo balobaka ete bazali baklisto.” Lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 18.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Feb.

“Okanisi ete mboka na biso elingaki kozala malamu soki bato nyonso batosi maloba oyo? [Tángá Baefese 4:25. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bakanisaka ete kokosa ezali mabe te na bantango mosusu. Zulunalo oyo elimboli matomba ya koloba ntango nyonso solo.”

Lamuká! Feb.

“Emonani ete na bamboka mosusu bato bazali kosepela lisusu te na makambo ya losambo. Okanisi ete bato bazali lisusu te komipesa na mangomba? [Tiká ye apesa eyano.] Maloba oyo ya ntoma Paulo emonisi ntina moko oyo bato mosusu batyelaka lisusu mangomba motema te. [Tángá Misala 20:29, 30.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na mangomba ya boklisto na mikolo ezali koya.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto