Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.
“Na bambula oyo, bato bakómi kolobela mingi baanzelu. Omituná naino te soki baanzelu bazali banani mpe bakoki kosala nini mpo na biso? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 34:7.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo ezali na Biblia, oyo baanzelu basalaki na ntango ya kala, oyo bazali kosala lelo oyo, mpe oyo bakosala na mikolo ezali koya.”
Lamuká! Yan.
“Lelo oyo, bato bapesaka toli na makambo ndenge na ndenge. Okanisi ete tokoki mpenza kotyela batoli yango motema? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 2 Timote 3:16.] Lamuká! oyo emonisi ntina oyo tosengeli kotalela Biblia lokola buku oyo epesaka bwanya oyo ebongi kotyela motema.” Lakisá lisolo oyo ezali na ebandeli ya lokasa 18.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Feb.
“Biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo na bomoi na biso. Kasi, ondimi te ete tosengeli mpenza komibatela na likama oyo balobeli awa? [Tángá 1 Timote 6:10, tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kosalisa biso tóyeba mitambo oyo ekómelaka bato mingi oyo bazali na mbongo mingi mpe ndenge ya kokima mitambo yango.”
Lamuká! Feb.
“Mingi kati na biso tozali na bandeko mpe baninga oyo bakómi mibange, mpe tomitunaka ndenge oyo tokoki kosalisa bango bálonga mikakatano ya bobange. Ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi makambo oyo tokoki kosala mpo na kolɛmbisa mpasi ya mibange. Ezali mpe kolobela ndenge oyo esakweli oyo ekokokisama.” Tángá Yobo 33:25.