Eleko ya Ekaniseli—Ntango ya mosala mingi
1. ‘Bilambo ya Yehova ya bilaka biponami’ ezalaki kotinda Bayisalaele oyo bazalaki kobanga Nzambe na kosala nini?
1 Mbula na mbula, na bantango oyo Yehova aponaki, Bayisalaele ya kala bazalaki kosepela ‘Bilambo ya Yehova ya bilaka bipɔnami.’ (Lev. 23:2) Lokola bazalaki kozwa ntango ya kokanisa motema malamu ya Nzambe na bango, bazalaki koyoka esengo mingi mpe yango ezalaki kotinda bango bázala na molende mpo na losambo ya pɛto.—2 Nta. 30:21–31:2.
2, 3. Mpo na nini ebongi tósala mosala na biso ya elimo lisusu mingi na eleko ya Ekaniseli, mpe Ekaniseli ekosalema mokolo nini?
2 Lelo oyo, mbula na mbula, mosala na biso ya Teokrasi esalemaka lisusu mingi na eleko ya Ekaniseli. Yango ezali ntango oyo tokanisaka mingi na likabo ya motuya monene oyo Yehova apesaki mpo na kobikisa biso—Mwana na ye mobotami-se-moko. (Yoa. 3:16; 1 Pet. 1:18, 19) Komanyola likoló ya bolingo oyo Nzambe mpe Mwana na ye bamonisaki, etindaka biso tókumisa Yehova mpe tósala milende mpo na kokokisa mokano na ye.—2 Kol. 5:14, 15.
3 Mbula oyo, Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ekosalema na mokolo ya minei 24 Marsi, na nsima ya kolala ya moi. Tokoki kosala nini mpo na kosakola mingi na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai?
4, 5. (a) Nini esalisaki basakoli mosusu báyebisa bato mingi nsango malamu? (b) Wapi mayele oyo omoni ete ebimisaka matomba mingi na teritware na bino?
4 Luká kokutana na bato mingi: Ntango obimi na mosala ya kosakola, luká kokutana na bato mingi. Okoki komibongisa mpo na kosakola ndako na ndako ntango bato mingi bazalaka na bandako na bango, na ndakisa ntango moi ebandi kolala to na bampokwa? Soki bato mosusu ya etuluku na bino ya boyekoli ya mokanda basepeli kosakola liboso ya boyekoli ya mokanda, mokɛngɛli na boyekoli ya mokanda akoki kobongisa mwa likita ya mosala ya kosakola ya mokuse mpo básakola na teritware oyo ezali penepene.
5 Lolenge mosusu ya kokutana na bato mingi ezali ya kosakola na bisika oyo bato bazalaka mingi. Na Japon, ndeko mwasi moko asepelaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi atako azalaki kosala mosala mokolo mobimba. Nkulutu moko ayebisaki ye ete akoki kosakolaka na balabala pene na esika oyo bato bazelaka engbunduka, mikolo nyonso liboso ya kokende na mosala. Nsima ya kotika ezaleli na ye ya nsɔninsɔni mpe koboya kolanda bato oyo bazalaki kotyola ye, akómaki kotikela bato 40 bazulunalo mbala na mbala, kati na bango, bato oyo bazalaki kokende elongo na ye na engbunduka, bato oyo basalaka na engbunduka, mpe bankóló bamagazini oyo ezalaki penepene wana. Akabolaki bazulunalo soki 235 na sanza moko. Lokola mokolo na mokolo azalaki koyebisa bato likanisi ya Biblia kaka na ntango moke, akómaki koyekola Biblia na bato motoba.
6. Ndenge nini bilenge bakoki kosala mosala ya elimo lisusu mingi?
6 Mabaku ya kopesa litatoli: Basakoli mingi oyo bakendaka na kelasi, bazalaka na bileko ya bopemi na boumeli ya mbula. Yango ekoki kozala ntango ya malamu ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Lisusu, bilenge baklisto bakoki kosala mingi soki bazali kopesa litatoli na kelasi. Okoki kokamwa na komona ete baninga na yo ya kelasi bazali na mposa ya koyeba makambo etali kondima na yo. Mpo na nini te kopesa bango litatoli na ntango bosololaka na kelasi to ntango bosalaka badevuare mosusu? Basakoli mosusu basalelaki bakasɛti video na biso mpo na kopesa litatoli ndenge wana. Basusu babandaki koyekola Biblia na baninga na bango ya kelasi mpe basalisaki bango tii bamipesaki mpe bazwaki batisimo. Yango ezali ndenge ya malamu ya ‘kosanzola nkombo ya Yehova.’—Nz. 148:12, 13.
7. (a) Ndenge nini ndeko mobali moko asalelaki mabaku ya kopesa basusu litatoli? (b) Yo mpe osilá kosala bongo?
7 Na mosala oyo osalaka mokolo na mokolo , luká ndenge ya koyebisa bato makambo etali Nzambe na biso ya malamu mpe mikano na ye. Ndeko mobali moko oyo azalaki kokenda mosala na engbunduka moko, azalaki kopesa litatoli epai ya bato mosusu oyo azalaki kokenda na bango elongo, soki azwi likoki. Na ndakisa, na esika oyo azalaki kozela engbunduka mosusu, azalaki kopesa elenge mobali moko litatoli mikolo nyonso na boumeli ya miniti mitano. Na nsuka, elenge mobali yango ná moninga na ye bandimaki koyekola Biblia. Bazalaki koyekola nzelanzela na kati ya engbunduka. Mwa mikolo na nsima, mwasi moko ya mobange oyo azalaki kolanda masolo na bango, asololaki na ndeko mobali mpe atunaki ye soki akondima koyekola Biblia elongo na ye. Ye mpe akómá koyekola na mikolo oyo amataka na engbunduka. Na ndenge wana, ndeko yango akómaki koyekola Biblia na bato zomi na engbunduka.
8. Wapi mayele ya kosakola oyo ekoki kosalisa baoyo nzoto elɛmbi mpo bakómi mibange to mpo bazali na maladi básangana mingi na mosala ya kosakola?
8 Okosala nini soki ozali kokoka te kosala mingi mpo okómi mobange to mpo ozali na maladi? Ozali kaka na likoki ya kosangana mingi na mosala ya kokumisa Yehova. Osilá komeka kopesa litatoli na telefone? Soki oyebi malamu te ndenge ya kosala yango, sololá na mokɛngɛli na bino ya boyekoli ya mokanda. Akoki kopesa yo bandeko mosusu oyo basalelaka mayele yango mpo na kosakola elongo na yo. Soki bozali kosala mibalemibale, bokoyekola makambo mosusu mpe bokosalisana mpo bópesa litatoli na ndenge ebongi. Okoki kokuta makanisi ya malamu mpo na ndenge ya kopesa litatoli na telefone na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2001, nkasa 5-6.
9. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákokisa masɛngami mpo na kosakola elongo na lisangá?
9 Koyangana na Ekaniseli ekoki kolendisa bato ya sika báluka ndenge ya kokumisa Yehova lisusu mingi. Okoki kosalisa bango bálongola kobanga nyonso oyo bakoki kozala na yango mpo na mosala ya kosakola, soki ozali koyebisa bango makambo ya malamu oyo okutanaki na yango na mosala ya kosakola, mpe soki ozali kosalisa bango mokemoke bákóma na likoki ya kolimbola mateya ya Biblia mpe ya kolobela kondima na bango. (1 Pet. 3:15) Soki moyekoli ya Biblia alobi ete alingi abanda kosakola nsango malamu, yebisá na mokɛngɛli-mokambi. Akozwa bibongiseli mpo bátalela moyekoli yango soki akokisi masɛngami mpo na kosakola elongo na lisangá. Ntembe ezali te ete Yehova asepelaka mpenza ntango amonaka bato ya sika bazali koluka komitya na ngámbo na ye na likambo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba!—Mas. 27:11.
10. (a) Ndenge nini manaka ya malamu ekoki kosalisa biso tósala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? (b) Na mbula eleki, osalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli? Osalaki ndenge nini?
10 Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi? Esengeli kotalela malamumalamu soki okokokisa ngonga 50 oyo esɛngami mpo na mobongisi-nzela mosungi. (Mat. 5:37) Yango elingi koloba ete osengeli komibongisa mpo na kosala ngonga 12 na mosala ya kosakola pɔsɔ nyonso. Ezali na manaka moko ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi kati na oyo ezali na lokasa 5, oyo ebongi na yo? Soki te, okoki nde kosala yo moko manaka oyo ekopesa yo nzela ya kozala mobongisi-nzela mosungi na Marsi, na Aprili, to na Mai? Sɛngá Yehova apambola milende na yo mpo na kosala lisusu mingi.—Mas. 16:3.
11. Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala bakoki kosalisa baoyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?
11 Bankulutu mpe basaleli na misala bakosalisa yo na milende oyo ozali kosala mpo eleko oyo ya Ekaniseli epesa mpenza Yehova lokumu. Ntembe ezali te ete mingi na bango mpe bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Bankulutu bakobongisa makita mosusu ya mosala ya kosakola, na ndakisa, na ntango moi ebandi kokita, na bampokwa, na mwapɔsɔ mpe mwalomingo, soki mposa ezali. Mpo bankulutu bábongisa bisika mpe ngonga oyo makita yango ekosalema, mpe moto oyo akotambwisa yango, bakosolola na basakoli oyo bamibongisi mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela to baoyo bazali kokana kosala yango. Bankulutu bakosala nyonso mpo ozanga te basakoli oyo okobima na bango na mosala ya kosakola, na mikolo mpe na ngonga oyo obongisi. Na ndenge yango, tokoki kokokisa mikano na biso mpe tokoki kosala makambo mingi ya malamu.—Mas. 20:18.
12. Nini etindaka biso tókumisa Yehova ntango nyonso?
12 Salá nyonso oyo ekoki na yo: Soki bomoi na yo ezali kopesa yo nzela te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, yebá ete Yehova andimaka milende mpe komipimela na biso ‘na kotalela oyo tozali na yango, kasi te na kotalela oyo tozali na yango te.’ (2 Kol. 8:12) Tozali na bantina mingi ya kopesa Yehova matɔndi. Yango wana, Davidi akomaki boye: “Nakokumisa Yehova ntango nyonso, lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai libela.” (Nz. 34:1, NW) Tiká ete biso mpe tózala na mokano wana na eleko oyo ya Ekaniseli.
[Etanda na lokasa 3]
Okosala nini mpo osala lisusu mingi?
◼ Sakolá ntango bato mingi bazalaka na bandako na bango
◼ Pesá litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi
◼ Pesá litatoli na kelasi to na mosala
◼ Pesá litatoli na telefone
◼ Zalá mobongisi-nzela mosungi
[Etanda na lokasa 5]
Manaka mpo na mobongisi-nzela mosungi—Ndenge ya kosala ngonga 12 na mosala ya kosakola pɔsɔ nyɔnsɔ
Na ntɔngɔ—Mwayambo tii na Mwapɔsɔ
Okoki kosalela Mwalomingo na esika ya mokolo mosusu nyonso.
Mokolo Ntango Ngonga
Mwayambo Ntɔngɔ 2
Mwamibale Ntɔngɔ 2
Mwamisato Ntɔngɔ 2
Mwaminei Ntɔngɔ 2
Mwamitano Ntɔngɔ 2
Mwapɔsɔ Ntɔngɔ 2
Ngonga nyonso: 12
Mikolo mibale
Okoki kopona mikolo mibale ya pɔsɔ. (Ezala oponi mikolo nini, okoki kosala kaka ngonga 48 na sanza.)
Mokolo Ntango Ngonga
Mwamisato Mokolo mobimba 6
Mwapɔsɔ Mokolo mobimba 6
Ngonga nyonso: 12
Mpokwa mibale mpe wikende
Okoki kopona mpokwa mibale na mikolo ya pɔsɔ.
Mokolo Ntango Ngonga
Mwayambo Mpokwa 1 1⁄2
Mwamisato Mpokwa 1 1⁄2
Mwapɔsɔ Mokolo mobimba 6
Sunday Ndambo ya mokolo 3
Ngonga nyonso: 12
Mpokwa misato mpe Mwapɔsɔ
Okoki kosalela Mwalomingo na esika ya mokolo mosusu nyonso.
Mokolo Ntango Ngonga
Mwayambo Nsima ya midi 2
Mwamisato Nsima ya midi 2
Mwamitano Nsima ya midi 2
Mwapɔsɔ Mokolo mobimba 6
Ngonga nyonso: 12
Programɛ na ngai moko ya mosala ya kosakola
Otya yo moko ngonga boni okosala mokolo mokomoko.
Mokolo Ntango Ngonga
Mwayambo
Mwamibale
Mwamisato
Mwaminei
Mwamitano
Mwapɔsɔ
Mwalomingo
Ngonga nyonso: 12