Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/06 nk. 4-5
  • Kobá kozela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá kozela Yehova
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tólanda Klisto mpe tómonisa lokumu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Sanzolá Yehova na kati ya koyangana monene
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 4/06 nk. 4-5

Kobá kozela Yehova

1. Motó ya likambo ya liyangani ya etúká ezali nini, mpe mpo na nini yango ebongi mpenza?

1 Yisaya akomaki boye: “Yehova azali Nzambe oyo asambisaka. Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.” (Yis. 30:18b, NW) Biblia ezali na masolo mingi oyo elobeli ndenge Nzambe apesaki banguna na ye etumbu mpe ndenge asikolaki basaleli na ye ya sembo. Liteya nini basaleli ya Yehova bakoki kozwa lelo oyo na masolo yango? Tokoki kosala nini lelo mpo tómibongisa mpo na “mokolo ya [Yehova], mokolo monene mpe na nsɔmɔ”? (Yoe. 2:31, 32) Liyangani na biso ya etúká “Lobiko ekómi pene!” oyo tozali kozela ekolendisa biso tókanisa mpenza na mituna yango mpe tómitalela malamumalamu. Ekosalisa biso tókoba kozela Yehova.

2. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na liyangani na biso ya etúká?

2 Ozali komibongisa mpo na kozala na liyangani mikolo nyonso misato? Na ndakisa, osili kosolola na patrɔ na yo mpo na kosɛnga konje? Kokanisa te ete ekozala pɛtɛɛ mpo na kozwa yango. Bondelá mpo na yango. Na nsima, sololá na ye. (Neh. 2:4, 5) Tosengeli kozela te mikolo esila bongo tóbanda koluka mbongo ya tike, esika ya kolala, to makambo mosusu ya ntina. Soki tobongisi makambo wana malamu, tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na mesa ya elimo ya Yehova. Bankulutu basengeli kobosana te kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi mpo na kokende na liyangani, mingi mpenza mibange oyo bazali na lisangá.​—Gal. 6:10.

3. Bizaleli nini esengeli komonana epai ya basaleli ya Yehova na engumba oyo liyangani ekosalema?

3 Etamboli ya malamu ekumisaka Nzambe: Ntango tokutanaka bato mingi na mayangani, etamboli na biso ya malamu epesaka bato mingi litatoli. Yango esɛngi tósala nini? Na esika ya liyangani, bato oyo tokozala na bango esika moko basengeli komiyoka malamu mpo na bizaleli na biso ya baklisto, na ndakisa, motema molai, boboto, komipekisa, mpe kozala makambo makasimakasi te. (Gal. 5:22, 23; Filp. 4:5) Biso nyonso tosengeli komonisa bolingo oyo “emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te.” Ata na mikakatano to mitungisi ya ndenge nini, tosengeli kosala “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”​—1 Kol. 10:31; 13:5.

4. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámitambwisa na ndenge oyo ekokumisa Yehova?

4 Nsima ya liyangani moko, nkolo otɛlɛ moko akamwaki mingi ntango amonaki etamboli mpe elateli ya bilenge na biso, mpe amonisaki mposa na ye ya “koyambaka Batatoli ya Yehova ntango nyonso na otɛlɛ na ye.” Oyo mpenza likambo ya esengo! Yango emonisi mpenza ete bino baboti boteyaki mpe bobatelaki bana na bino malamu. Ekozala likambo ya bwanya te baboti bátika bana bango moko na esika oyo bakofanda kozanga moto akɛngɛla bango. Esengeli ntango nyonso kobatela bana malamu. (Mas. 29:15) Tiká etamboli na bango ya malamu ekumisa Yehova mpe esepelisa motema na ye!​—Mas. 27:11.

5. Ndenge nini tokoki kokumisa Yehova na elateli mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto?

5 Tólata mpe tóbongisa nzoto na koleka ndelo te: Mokomoko na biso akoki kosala ete bato báloba malamu mpo na biso na liyangani, soki toboyi ndenge ya kolata mpe ya kobongisa nzoto oyo bato mosusu bazali kosala mikolo oyo na kolekisáká ndelo, to na ndenge oyo ebongi na moklisto te. Likambo yango etali mpe ntango tozali kokende to kouta na mboka oyo liyangani ekosalema, kobongisa esika ya liyangani to ntango tozali na liyangani. Lokola tozali basaleli ya Nzambe, mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kobatela nkombo ya Yehova mpe lokumu na ye, kasi te makambo oyo tolingaka to bolamu na biso moko. Batata bazali na mokumba ya koyeba ntango nyonso soki mabota na bango bakobongisa nzoto na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu.​—1 Tim. 2:9.

6. Mpo na nini tosengeli kolata mpe kobongisa nzoto na ndenge ebongi ata ntango tozali kozwa mopɛpɛ na mikolo ya liyangani?

6 Ezali mpe na ntina tólata mpe tóbongisa nzoto na ndenge ebongi ntango tozali kozwa mopɛpɛ. Ezali malamu tólata makarɔ na biso ntango tozali kolya na restora nsima ya liyangani. Soki tolati makarɔ na biso, tokozanga te kopesa litatoli ya libaku malamu.​—2 Kol. 6:3, 4.

7. Ndenge nini tokoki kosala ete liyangani esalema na molɔngɔ mpe na esengo? (Talá “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká.”)

7 Yisaya asakolaki boye: “Yehova akokoba kozela ete amonisela bino boboto, bongo akotɛlɛma mpo ayokela bino mawa.” (Yis. 30:18a, NW) Botɔndi oyo tozali na yango mpo na motema mawa ya Yehova mpe motema boboto na ye esengeli kotinda biso tókumisa ye na etamboli na biso mpe ndenge tobongisaka nzoto ntango tokokutana na mayangani na biso. Tiká ete liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” ekumisa Nzambe na biso mpe esalisa biso tókoba kozela ye!

[Etanda na lokasa 5]

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká

◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 9:30 ya ntɔngɔ. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 ya ntɔngɔ. Mwa miniti moke liboso programɛ ebanda, miziki ya Bokonzi ekobɛta wana prezida ya eteni ya ebandeli akofanda na estrade. Na ntango wana, esengeli ete biso nyonso tófanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na molɔngɔ. Na mokolo ya mitano, programɛ ekosuka na ngonga ya 5:15 ya mpokwa, na mokolo ya pɔsɔ, na ngonga ya 5:05 ya mpokwa, mpe mokolo ya lomingo na ngonga ya 4:10 ya mpokwa.

◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango motuka moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko.

◼ Bilei ya midi: Balendisaki biso tómemaka biloko ya kolya ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekopesa biso makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma, nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko epai ya batɛki ekozala te. (Liyebisi: Bóyeba ete bato oyo batɛkaka biloko ya kolya bakozwa ndingisa ya kokota na esika ya liyangani te, ata na ngonga nini.​—Yoa. 2:13-17.) Baoyo bakosalela bambambola mpo na kolamba na esika ya liyangani, basengeli liboso kotuna bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani mpo bálakisa bango esika oyo bakoki kotya yango. Bibongiseli esengeli kozwama mpo makama ebima te.​—Luka 10:38-42.

◼ Makabo: Esɛngaka mbongo mingi mpo na kobongisa liyangani ya etúká. Tokomonisa botɔndi na biso soki topesi makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi na biso to na liyangani mpo na kosunga mosala na mokili mobimba.

◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Bandeko ya departema oyo epesaka lisalisi ya nokinoki balobi ete mbala mingi babengaka bango mpo na makambo oyo ezali na ntina mingi te. Soki moto moko akwei na maladi na esika ya liyangani, tosɛngi osolola naino na ndeko moko oyo azali koyamba bato pene wana, ye akosolola mbala moko na bandeko ya departema ya Mwa Lisungi ya nkisi mpo bandeko oyo bayebi mosala yango, oyo bazali na esika ya liyangani, bátala soki moto yango azali mpenza na maladi makasi mpe básalisa ye.

◼ Kosalela kura ya liyangani: Esengeli kotya radio to masini mosusu te na bansinga ya kura to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani, mpe biloko yango ekoki kosalelama kaka soki ekobebisa likebi ya bato mosusu te.

◼ Kokanga fɔtɔ: Soki ozali kokanga fɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, tosɛngi yo osalela mwinda ya fɔtɔ te.

◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kosala nyonso mpo batelefone na biso ya mabɔkɔ ebebisa likebi ya bato mosusu te.

◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka biloko epai ya batɛki, babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Soki moto moko amoni malamu kosomba biloko ya kolya epai ya batɛki (na ndakisa: bombo, bisikiti, gato, mbisi to biloko mosusu), asengeli kobwaka nkasa na yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na libándá te. Soki tomoni moto moko abwaki papye to sashɛ na mabelé to na libándá, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tosɛngi bino bósala milende mpenza mpo na kobatela esika ya liyangani pɛto na kati mpe na libándá. Bopɛto ezali likambo oyo bayangani nyonso basengeli kotyela yango mpenza likebi. Soki mokomoko na biso asali bongo, tokotika esika ya liyangani pɛto na nsuka ya mokolo. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.​—1 Pet. 1:15, 16; Ex. 19:10; Det. 23:14.

◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Komema bato ebele te na ndako to na esika ya kolala oyo bapesi yo koleka ndenge esengeli to ndenge mokóló ndako asɛngaki. (2) Soki okofanda te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango libela. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (4) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Likambo ya ntina koleka ezali ya kozala na bokatikati mpe na makambo makasimakasi te. (5) Bopɛto ezali ndeko ya ezaleli ya kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. Yango etaleli mpe Ndako ya bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.​—Gal. 5:22, 23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto