Tólanda Klisto mpe tómonisa lokumu
1. Na ndenge nini motó ya likambo ya liyangani ya etúká ya mbula oyo eyokani na likambo ya komonisa lokumu?
1 Biblia elobi mpo na Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ete alati lokumu. (Nz. 104:1) Yesu azalaki ntango nyonso koloba mpe kosala makambo na ndenge oyo ezalaki kokumisa Tata na ye mpe bibongiseli na Ye. (Yoa. 17:4) Mokomoko na biso akozwa libaku ya kolanda ndakisa ya Yesu mpe kokumisa Yehova na liyangani na biso ya etúká oyo ezali koya, oyo ezali na motó ya likambo “Landá Klisto!”
2. Ndenge nini komibongisa mpo na kozala ntango eteni mokomoko ya liyangani ekobanda ekumisaka Yehova?
2 Tósambela Yehova na lokumu mpenza: Tokokumisa Yehova soki tozwi bibongiseli mpo tózala na elambo ya elimo oyo abongiseli biso. Osili kosolola na patrɔ na yo mpe kobongisa makambo na yo mpo oyangana mikolo nyonso misato ya liyangani kobanda mokolo ya mitano? Osili komibongisa mpo okómaka na ngonga malamu mpo na kozwa esika ya kofanda, koyemba loyembo ya ebandeli elongo na bayangani mosusu mpe koyoka libondeli ya ebandeli? Osili komibongisa mpo na kozwa bilei ya midi, mpo olyaka na esika ya liyangani elongo na bandeko na yo? Ntango eteni mokomoko ya liyangani ekobanda mpe prezida akosɛnga bayangani bázwa bisika, tosengeli mbala moko kokata masolo mpe kofanda liboso ete miziki ebanda.
3. Ndenge nini kolanda liyangani na likebi mpenza ekumisaka losambo na biso?
3 Tokokumisa mpe Tata na biso ya likoló soki tozali kolanda masolo na likebi mpenza. Ntango mopanzi-nsango moko ayaki na liyangani moko ya etúká, akomaki ete bato oyo bazalaki kotala bakamwaki mingi na “etamboli ya malamu ya bayangani, oyo bafandaki kimya mpe bazalaki kolanda mateya na likebi, na ndenge ebongi na makambo ya elimo.” Alobelaki mpe “ebele ya bana . . . , oyo nyonso bazalaki na bizaleli ya malamu mpe bazalaki kolanda bavɛrsɛ na Biblia mosantu.” Ntango masukulu ezali kosalema, tosengeli te kosolola mpambampamba, kokoma to kotinda nsango na telefone (SMS), kolya, to kotambolatambola na bakulware. Bilenge basengeli kofanda elongo na baboti na bango mpo baboti básalisaka bango bálanda mateya malamu. (Det. 31:12; Mas. 29:15) Kosala milende ndenge wana emonisaka limemya mpo na basusu mpe botɔndi mpo na bilei ya elimo ya ntina mingi oyo ezali kopesama.
4. Mpo na nini molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli kozala malamu na liyangani?
4 Tópesa nzoto na biso kilo: Bandeko mingi basepelaki na lisukulu oyo toyokaki na liyangani ya etúká ya mbula eleki, oyo elobaki: “Zaláká ntango nyonso na etamboli oyo ebongi na moklisto”; lisukulu yango emonisaki ete basaleli ya Nzambe basengeli mpenza kosalaka makasi bámonisa lokumu na ndenge na bango ya kolata mpe ya kobongisa nzoto. Na mbula oyo, tosengeli mpe kotya mpenza likebi na likambo yango. Ndenge na biso ya kolata mpe ya kobongisa nzoto esengeli komonisa ete tokumisaka Yehova mpe tosepelaka na libaku ya kozala Batatoli na ye. Tosengeli ntango nyonso kolata na ndenge ya bato “oyo balobaka ete babangaka Nzambe.”—1 Tim. 2:9, 10.
5. Ndenge nini tokoki kozala na molato ya malamu ntango tozali kominanola na engumba oyo liyangani ekosalema?
5 Tosengeli kolata malamu kaka ntango tokei na esika ya liyangani? Tóbosana te ete bato mingi ya engumba oyo liyangani ekosalema bakomona biso tolati bamakarɔ ya liyangani ya etúká. Molato na biso esengeli kokesanisa biso na bato mosusu. Yango wana, ata ntango tobimi mwa moke mpo na kozwa mopɛpɛ nsima ya liyangani, tosengeli kolata na ndenge ebongi na baministre oyo bayei na engumba mpo na liyangani ya baklisto, kasi te kolata bilamba ya djini (jeans), bakupe to batriko. Kolata bilamba ya mindɔndɔ te mpe ya ntalo mingi te, kasi oyo ezali pɛto mpe ebongisami malamu, epesaka moto lokumu. Yango ekopesa bato litatoli malamu! Yehova asepelaka soki molato na biso ezali komonisa mpenza ete tozali baministre.
6. Wapi matomba ya komonisa lokumu oyo ebongi na baklisto?
6 Matomba: Kozala na etamboli oyo ebongi na baklisto na mayangani na biso ya etúká esalisaka biso tópesa litatoli ya libaku malamu mpe etindaka bato báloba malamu mpo na biso. Na nsuka ya liyangani moko ya etúká, mokonzi moko alobaki ete: “Tomoná naino bato ya etamboli malamu boye te. Bozali ndenge ya bato oyo Nzambe alingaka tózala.” Ntango tozali komonisa lokumu, tozali komonisa ete tomemyaka basusu mpe tolingaka bango, mpe yango ekumisaka Yehova. (1 Pet. 2:12) Yango emonisaka mpe ete tobangaka Nzambe mpe tozali na botɔndi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango ya koteyama na Tata na biso ya likoló. (Ebe. 12:28) Tiká tósala nyonso mpo tómonisaka lokumu wana tozali kozela na esengo nyonso liyangani na biso ya etúká “Landá Klisto!”
[Etanda na lokasa 5]
Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká
◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 9:20 ya ntɔngɔ. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 ya ntɔngɔ. Ntango miziki ya Bokonzi ekobanda kobɛta, biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na molɔngɔ. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, programɛ ekosuka na ngonga ya 5:05 ya mpokwa, mpe na mokolo ya lomingo, na ngonga ya 4:10 ya mpokwa.
◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango motuka moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko.
◼ Bilei ya midi: Tosɛngi bino bómema biloko ya kolya ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekopesa bino makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma (bitabe), nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko epai ya batɛki ekozala te. (Liyebisi: Bóyeba ete bato oyo batɛkaka biloko ya kolya bakozwa ndingisa ya kokɔta na esika ya liyangani te, ata na ngonga nini.—Yoa. 2:13-17.) Baoyo bakosalela bambambola mpo na kolamba na esika ya liyangani, basengeli liboso kotuna bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani mpo bálakisa bango esika oyo bakoki kotya yango. Bibongiseli esengeli kozwama mpo makama ebima te.—Luka 10:38-42.
◼ Makabo: Esɛngaka mbongo mingi mpo na kobongisa liyangani ya etúká. Tokomonisa botɔndi na biso soki topesi makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi na biso to na liyangani mpo na kosunga mosala na mokili mobimba.
◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Bandeko ya departema oyo epesaka lisalisi ya nokinoki balobi ete mbala mingi babengaka bango mpo na makambo oyo ezali na ntina mingi te. Soki moto moko akwei na maladi na esika ya liyangani, tosɛngi osolola naino na ndeko moko oyo azali koyamba bato pene wana, ye akosolola mbala moko na bandeko ya departema ya Mwa Lisungi ya nkisi mpo bandeko oyo bayebi mosala yango, oyo bazali na esika ya liyangani, bátala soki moto yango azali mpenza na maladi makasi mpe básalisa ye.
◼ Kosalela kura ya liyangani: Esengeli te kotya radio to masini mosusu na bansinga ya kura to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani, mpe biloko yango ekoki kosalelama kaka soki ekobebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Kokanga fɔtɔ: Soki ozali kokanga fɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, tosɛngi yo osalela mwinda ya fɔtɔ te.
◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kosala nyonso mpo batelefone na biso ya mabɔkɔ ebebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka biloko ya kolya epai ya batɛki, babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Soki moto moko amoni malamu kosomba biloko ya kolya epai ya batɛki (na ndakisa: bombo, bisikiti, gato, mbisi to biloko mosusu), asengeli kobwaka nkasa na yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na libándá te. Soki tomoni moto moko abwaki papye to sashɛ na mabelé, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tosɛngi bino bósala milende mpenza mpo na kobatela esika ya liyangani pɛto na kati mpe na libándá. Bopɛto ezali likambo oyo bayangani nyonso basengeli kotyela yango mpenza likebi. Soki mokomoko na biso asali bongo, tokotika esika ya liyangani pɛto na nsuka ya mokolo. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.—1 Pet. 1:15, 16; Ex. 19:10; Det. 23:14.
◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Komema bato ebele te na ndako to na esika ya kolala oyo bapesi yo koleka ndenge esengeli to ndenge mokóló ndako asɛngaki. (2) Soki okofanda te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango libela. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (4) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Likambo ya ntina koleka ezali ya kozala na bokatikati mpe na makambo makasimakasi te. (5) Bopɛto ezali ndeko ya ezaleli ya kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. Yango etaleli mpe Ndako ya bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.—Gal. 5:22, 23.