Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/12 lok. 3
  • Kokanisa te ete okokoka te mpo ozalaka na ntango te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokanisa te ete okokoka te mpo ozalaka na ntango te
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Koboya te kosalela bato oyo ezali malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Lisalisi mpo na koyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 11/12 lok. 3

Kokanisa te ete okokoka te mpo ozalaka na ntango te

1. Mpo na nini basakoli mosusu bakakatanaka kotuna moto soki akosepela koyekola na bango Biblia?

1 Basakoli mosusu bakakatanaka kotuna moto soki akosepela koyekola na bango Biblia mpo bazalaka na ntango te. Koyekola na moto Biblia esɛngaka ntango. Esɛngaka ntango mpo na kobongisa boyekoli, kotambwisa yango mpe kosalisa moto oyo azali koyekola Biblia alonga mikakatano oyo ekoki kopekisa ye akola na elimo. Ntoma Paulo alobaki ete apesaki molimo na ye mpo na kosalisa bato ya Tesaloniki mpo báyeba Yehova. (1 Tes. 2:7, 8) Ndenge nini tokoki koyekola na moto Biblia atako tozalaka na ntango te?

2. Na ndenge nini bolingo na biso mpo na Yehova ekosalisa biso tóyeba kosalela ntango na biso?

2 Kosalela Yehova esɛngaka ntango: Likambo ya solo ezali ete kosalela Yehova esɛngaka ntango. Na ndakisa, esɛngaka ntango mpo na koyangana na makita mbala na mbala, kokende na mosala ya kosakola, kotánga Biblia mpe kobondela. Moto oyo abalá, ata soki azalaka na makambo mingi ya kosala, azwaka kaka ntango ya kolekisa ná molongani na ye. Tosengeli ‘kosomba ntango’ na esengo nyonso mpo na kosalela Yehova mpo tolingaka ye. (Ef. 5:15-17; 1 Yoa. 5:3) Na kolanda maloba ya Yesu, eteni monene ya losambo na biso ezali kokómisa bato bayokoli. (Mat. 28:19, 20) Soki tokanisi na ntina ya likambo yango, ekosalisa biso tokakatanaka te kondima mokumba ya koyekola na bato Biblia.

3. Ndenge nini tokoki kokoba koyekola na bato ata soki makambo ndenge na ndenge ebebisaka programɛ na biso ya kosakola?

3 Tokosala ndenge nini soki mosala, maladi ya ntango molai mpe mikumba na kati ya lisangá ezwi biso ntango nyonso? Basakoli mosusu oyo na bantango mosusu basengelaka kozala na mobembo bayekolaka na bato na nzela ya telefone to ya Internet. Basakoli oyo maladi ya ntango molai epekisaka bango bábima na mosala ya kosakola, babengisaka bayekoli na ndako mpo na koyekola. Basusu baponá basakoli mosusu oyo batyelaka motema báyekolaka na bato na bango Biblia soki bango bazali te.

4. Mapamboli nini tokozwa soki toyekolaka na bato Biblia?

4 Lokola Paulo apesaki ntango mpe makasi na ye mpo na kosalisa bato mosusu báyekola solo, yango ememelaki ye esengo mingi. (Mis. 20:35) Ntango akanisaki na ntina ya bato nyonso oyo asalisaki ntango azalaki na Tesaloniki, yango etindaki ye apesa Yehova matɔndi. (1 Tes. 1:2) Esengo na biso na mosala ya kosakola ekobakisama soki tozali te koboya koyekola na bato Biblia atako tozalaka na makambo mingi ya kosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto