Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 4
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 4

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 Augusto 2005. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 4 Yuli tii na pɔsɔ ya 29 Augusto 2005. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ntango tozali koyebisa basusu elikya na biso, ndenge nini tokoki kotika ete ‘ezaleli na biso ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso,’ mpe mpo na nini yango ezali na ntina? (Filp. 4:5; Yak. 3:17) [be lok. 251 par. 1-3, etanda]

2. Ndenge nini koyeba ntango oyo ebongi koyokela basusu ekosalisa biso mpo masolo na biso elongo na bato ebota mbuma ya malamu? [be lok. 252 par. 5; lok. 253 par. 1]

3. Ntango tozali kosalisa basusu bákanisa mosika likambo moko, mpo na nini ezali na ntina kotuna mituna oyo ebongi? [be lok. 253 par. 2-3]

4. Makambo nini tosengeli kotalela mpo bato bándima lisolo na biso? [be lok. 255 par. 1-4, etanda; lok. 256 par. 1, etanda]

5. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kobakisa makambo mosusu mpo na kondimisa moto ete makambo oyo Makomami elobi ezali solo? [be lok. 256 par. 3-5, etanda]

LISOLO NO. 1

6. Makambo nini ezali mpenza kondimisa biso ete Yesu azalaki awa na mabelé? [w03 15/6 nk. 4-7]

7. Ndenge nini ‘monɔkɔ ya basembwi ebikisaka bango,’ mpe ndenge nini ndako ya basembwi “ezali kotɛlɛma”? (Mas. 12:​6, 7) [w03 15/1 lok. 30 par. 1-3]

8. Lokola Biblia elobeli te makambo nyonso oyo tosengeli kosala ná oyo tosengeli koboya, ndenge nini tokoki ‘kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’? (Ef. 5:17) [w03 1/12 lok. 21 par. 3-lok. 22 par. 3]

9. Mitinda nini ya Biblia oyo soki moto oyo azali mobola to oyo azali na mikakatano asaleli yango, ekoki kosalisa ye? [w03 1/8 lok. 5 par. 2-5]

10. Lokola Yehova apesaka biso makabo ya ofele, ndenge nini ndakisa na ye etaleli biso? (Mat. 10:⁠8) [w03 1/8 nk. 20-22]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Na porte ya tempelo oyo Salomo atongaki, makonzí mibale oyo bazalaki kobenga yango Yakini mpe Boaza, ezalaki na ndimbola nini? (1 Mik. 7:​15-22)

12. Likambo oyo Salomo asalaki ya kopesa Hilama, mokonzi ya Tulo, bingumba 20 ya Galilai eyokanaki na Mibeko ya Moize? (1 Mik. 9:​10-13)

13. Liteya nini tokoki kozwa na kozanga botosi ya “moto ya Nzambe”? (1 Mik. 13:​1-25)

14. Ndenge nini Asa, mokonzi ya Yuda, amonisaki ete azali na mpiko, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye? (1 Mik. 15:​11-13)

15. Ndenge nini likambo oyo ebimaki kati na Mokonzi Ahaba mpe Nabota emonisi ete kozala mawamawa ezali likama? (1 Mik. 21:​1-16)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto