Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 5
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Kobá kolata “bomoto ya sika” nsima ya kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bozongeli ya Liyangani ya Zongazonga
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 5

Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

Na mikolo ya nsuka ya mokili oyo esili kobeba, ezali na ntina mingi tólongola te bilamba na biso ya elimo mpe tóbatela bizaleli oyo emonisaka ete tozali baklisto. (Em. 16:15) Yango wana, motó ya likambo ya liyangani ya zongazonga mpo na mobu ya mosala 2006 ebongi mpenza, mpamba te elobi ete: “Bólata bomoto ya sika.”​—⁠Kols. 3:⁠10.

Mokolo ya liboso: Masukulu-matongani ya liboso, oyo ezali na motó ya likambo, “Tómonisa polele bizaleli ya bomoto ya sika,” ekolobela mingi ndenge oyo kolata bomoto ya sika epesaka biso matomba na makambo nyonso ya bomoi na biso. Ndenge nini tolataka bomoto ya sika? Masukulu mibale ya nsuka ya mokolo ya liboso, “Mipesá disipilini mpo na komanyola malamu” mpe “Mateya oyo elatisaka biso bomoto ya sika,” ekopesa eyano na motuna wana.

Mokolo ya mibale: Masukulu-matongani ya mibale oyo ezali na motó ya likambo, “Tóluka kozala na lolemo ya bato ya bwanya,” ekomonisa ndenge oyo bomoto ya sika etindaka biso tósalela malamu lolemo na biso. Lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo, “Ozali kolonga moto mabe?”, ekomonisa ntina oyo tosengeli kokeba mpo tókwea te na mayele mabe ya Satana. Masukulu mibale ya nsuka ya liyangani yango, “Omibatela kozanga litɔnɔ na mokili” mpe “Tókómisaka sika bomoto na biso ya kati mokolo na mokolo,” ekosalisa biso tótika bizaleli mpe etamboli oyo eyokani te na banzela ya sembo ya Nzambe mpe tókangama na losambo ya Yehova.

Tozali kozela na motema likoló bilendiseli wana oyo ekotinda biso tólata bomoto ya sika mpe tóbatela yango!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto