Monisá ete osepelaka na bato—Yebá kosalela miso
1 Yehova Nzambe ná Klisto Yesu bayebaka malamu mpenza bamposa ya bato mpe basalisaka bango, koleka bato mosusu nyonso. (2 Nta. 16:9; Mko. 6:34) Soki toyebi makambo oyo esepelisaka mpe oyo etungisaka bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola, tokoyeba koyokanisa masolo na biso na bamposa na bango.
2 Tyá likebi na makambo ya mikemike: Yesu ayebaki kosalela miso. (Mko. 12:41-43; Luka 19:1-6) Ndenge moko mpe, ntango tozali kopusana pene na ndako moko, tokoki komona bikeko ya losambo, kotánga maloba oyo bakomaka na mituka, to biloko ya masano oyo ezali na lopango, mpe yango ekopesa biso mabaku ya koyebisa bato nsango malamu na ndenge oyo ekobota mbuma.
3 Elongi ya moto mpe makambo oyo azali kosala ekoki komonisa mwa moke ndenge azali komiyoka. (Mas. 15:13) Ntango mosusu, kokufela moto to likambo mosusu ya mpasi esali ete azala na mposa makasi ya kobɔndisama. Mbala mosusu, akosepela mingi soki totángeli ye mwa bavɛrsɛ oyo toponi malamu. (Mas. 16:24) Moto oyo tolingi kosolola na ye azali kobima mbangumbangu to azali nde kobondela mwana oyo azali kolela? Soki ezali bongo, ekozala malamu kozongela ye na ntango mosusu. Soki tozali na boboto epai na basusu mpe tozali ‘komitya na esika na bango,’ bakondima koyoka biso ntango tokozongela bango mbala ya nsima.—1 Pet. 3:8.
4 Yokanisá maloba na yo na bamposa ya bato: Ntoma Paulo amonaki ete engumba ya Atene ezalaki na etumbelo moko oyo epesamaki “epai ya Nzambe moko oyo ayebani te.” Yango esalisaki ye ayebisa bango nsango malamu na ndenge ebongi, mpo alobaki ete: “Oyo bino bokangami na ye kozanga ete bóyeba ye, ye nde nazali kosakola epai na bino.” Mayele oyo Paulo asalelaki mpo na kobanda lisolo yango etindaki bato mosusu oyo bazalaki wana bándima koyoka nsango ya Bokonzi mpe bákómaki bandimi.—Mis. 17:23, 34.
5 Ndenge moko mpe, soki toyebi kosalela miso, tokoyeba makambo oyo esepelisaka moto oyo tozali kosolola na ye mpe tokoyokanisa lisolo na biso na bamposa na ye. Tuná mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye. Luká bavɛrsɛ oyo ekosalisa ye asepela lisusu koleka na nsango malamu. (Mas. 20:5) Soki toyebi kosalela miso mpe komonisa basusu ete tosepelaka na bango, tokoyebisa bango nsango malamu na ndenge oyo ekobimisa matomba mpenza.