Luká mabaku ya kosakola
1 Lisangá ya boklisto esalemi na bato oyo bazali na bomoi ya ndenge na ndenge. Nzokande, eloko oyo esalaka ete tózala na bomoko ezali mokano oyo tozali na yango ya kokumisa Yehova. (Nz. 79:13) Soki mikakatano ya nzoto to mikakatano mosusu ezali kosala ete tókoka te koyebisa bato nsango malamu, ndenge nini tokoki kozwa mabaku ya kosakola?
2 Na misala oyo tosalaka mokolo na mokolo: Lokola Yesu azalaki kokutana na bato mokolo na mokolo, asalelaki mabaku yango mpo na kopesa litatoli. Asololaki na Matai ntango alekaki liboso ya biro moko ya kofutisa mpako, na Zakai ntango azalaki na mobembo mpe na mwasi moko Mosamalia wana azalaki kopema. (Mat. 9:9; Luka 19:1-5; Yoa. 4:6-10) Na misala oyo tosalaka mokolo na mokolo, biso mpe tokoki kopesa litatoli na masolo oyo tosololaka na bato. Soki tozali na Biblia mpe na batrakte to na mwa babuku, yango ekosalisa biso tókakatana te mpo na kolobela elikya na biso.—1 Pet. 3:15.
3 Okosala nini soki maladi to bobange epekisi yo obimaka lisusu te kosakola ndako na ndako? Luká mabaku nyonso oyo okoki kosalela mpo na kopesa litatoli epai ya minganga oyo bazali kosalisa yo mpe epai ya bato nyonso oyo bazali koya kotala yo. (Mis. 28:30, 31) Soki mbala mingi maladi to mokambo mosusu epekisaka yo kotambola, osilá komeka kopesa litatoli na telefone to na mokanda? Ndeko mwasi moko azalaki mbala na mbala kokomela bandeko na ye oyo bazali Batatoli te mikanda. Azalaki kolobela mpe makambo ya kolendisa oyo ezali na Biblia mpe makambo oyo azalaki kokutana na yango ntango azalaki kopesa litatoli.
4 Na mosala to na kelasi: Mposa na biso ya kokumisa Yehova ekotinda biso mpe tóluka mabaku ya kolona mboto ya solo na esika ya mosala to na kelasi. Mwana moko ya mbula mwambe oyo azali mosakoli, ayebisaki baninga na ye ya kelasi makambo atángaki na Lamuká! na ntina na sanza. Ntango molakisi ayebaki epai oyo mosakoli yango azwaki makambo yango, andimaki bámemelaka ye banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Na esika ya mosala, soki totye buku Biblia eteyaka na esika oyo bato bakoki komona, yango ekoki kotinda bango bátuna biso mituna mpe ekopesa biso nzela ya kopesa bango litatoli.
5 Okoki kokanisa balolenge oyo okoki kozwa mabaku ya kosakola na mosala oyo osalaka mokolo na mokolo? Wana tozali kosala nyonso oyo tokoki, tiká ete mokolo na mokolo tósalaka makasi “tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli.”—Ebe. 13:15.