Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/06 lok. 6
  • Tósepela koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósepela koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Landá ndakisa ya Moteyi Monene ntango ozali kosalela buku Biblia eteyaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Biblia eteyaka​—Buku ya liboso mpo na koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Salisá bato bátosa oyo Biblia eteyaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya kosalela buku “Bolingo ya Nzambe” mpo na koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 2/06 lok. 6

Tósepela koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?

1 Moko na makambo oyo tosepelaki na yango mingi na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe,” ezali kobima ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Etikali moke tokobanda kosalela yango mingi na mosala na biso ya kosakola, mingi mpenza mpo na koyekola na bato Biblia. Yango wana, esengeli tóyeba malamu mokanda yango ya sika. Ya solo, tokoyeba yango malamu mpamba te kobanda na pɔsɔ ya 17 Aprili 2006, tokobanda koyekola yango na Boyekoli ya mokanda na lisangá.

2 Mokɛngɛli na boyekoli ya mokanda akobenda likebi ya bayangani na mituna oyo ezali na ebandeli ya mokapo mokomoko. Mpe na nsima, akosalela mituna oyo ezali na nse ya lokasa mpo na kotambwisa boyekoli. Esengeli kotánga bavɛrsɛ oyo esimbi mateya mpe kolobela yango; etanda “Oyo Biblia eteyaka” ekosalisa na bozongeli, mpamba te yango ezali na biyano ya Biblia na mituna oyo ezali na ebandeli ya mokapo. Bokosepela kopesa biyano mpamba te buku yango ezali kolobela makambo na ndenge ya polele, ya pɛtɛɛ, mpe ya kosepelisa.

3 Apɛndisi ya buku yango ezali kolimbola makambo ndenge na ndenge na bozindo. Tokosalela makambo yango ntango moyekoli ya Biblia alingi koyeba makambo mingi etali lisolo oyo tozali koyekola. Na bantango mosusu, tokobanda kotalela biteni ya apɛndisi yango na boyekoli ya mokanda na lisangá. Ndeko oyo azali kotánga na boyekoli ya mokanda, akotánga mpe makambo nyonso oyo tokotalela na apɛndisi, mpe masolo oyo eleki milai tokotalela yango ndambondambo. Apɛndisi ezali na mituna ya boyekoli te. Kasi, mokɛngɛli akoki kotuna bayangani mituna oyo ekosalisa bango bábimisa polele makanisi ya ntina ya apɛndisi.

4 Ntango tokoyekola buku Biblia eteyaka na boyekoli ya mokanda na lisangá, tokolekisa ntango mingi te na likambo mokomoko. Kasi, tokosala ndenge wana te ntango tokoyekola yango elongo na bato mosusu, mingi mpenza soki bayebi Biblia malamu te to bayebi yango te. (Mis. 26:28, 29) Ntango tokoyekola na bato buku yango, ekosɛnga tólobela bavɛrsɛ na bozindo mpenza, tólimbola bililingi, mpe bongo na bongo. Na bongo, mityelá mokano ya koyangana pɔsɔ nyonso na boyekoli yango mpe ya kopesa biyano ntango tokoyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto