Ndenge ya kosalela buku “Bolingo ya Nzambe” mpo na koyekola na bato Biblia
1. Mokano ya buku “Bolingo ya Nzambe” ezali nini?
1 Tosepelaki mingi ntango tozwaki buku ya sika “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” na liyangani na biso ya etúká “Totambwisami na elimo ya Nzambe!” Ndenge toyokaki, buku yango ebongisami nde mpo na kosalisa biso tóyeba mpe tólinga mitinda ya Yehova na likambo etali bizaleli malamu, kasi te mpo na koteya mateya ya ebandeli ya Biblia. Tokokabola buku yango na mosala ya ndako na ndako te.
2. Ndenge nini tokosalela buku yango, mpe nani tokoyekola na ye buku yango?
2 Tokosalela buku wana mpo na koyekola na bato Biblia nsima ya kosilisa buku Biblia eteyaka. Tóbosana te ete bato nyonso bakolaka ndenge moko te na elimo. Tosengeli koyekola na moto mokomoko na kotalela makoki na ye. Tosengeli mpenza koyeba soki moyekoli asimbi makambo oyo toyekoli na ye. Mbala mingi, tokosalela te buku oyo mpo na kobanda koyekola Biblia na bato oyo basilisá koyekola babuku ebele, kasi bayanganaka te na makita ya lisangá mpe bazali komonisa polele ete balingi te kosalela makambo oyo bayekoli.
3. Tosengeli kosala nini soki tozali sikoyo koyekola na moto na buku Tósambela Nzambe?
3 Soki sikoyo ozali koyekola na moto Biblia na buku Tósambela Nzambe mpe bokómi pene na nsuka ya buku yango, okoki mbala mosusu kosilisa na ye buku yango mpe kolendisa ye atánga ye moko buku “Bolingo ya Nzambe.” Kasi, soki bozali naino na mikapo ya ebandeli, ekozala malamu kokata mpe kokɔta mbala moko na buku “Bolingo ya Nzambe” na mokapo ya liboso. Kaka ndenge tosalaka na buku Biblia eteyaka, mosakoli mokomoko akotala soki esengeli kotalela masolo ya apɛndisi elongo na moyekoli.
4. Tosengeli kosala nini soki moyekoli azwi batisimo liboso asilisa buku Biblia eteyaka to buku “Bolingo ya Nzambe”?
4 Soki moyekoli azwi batisimo liboso ete asilisa buku Biblia eteyaka to buku “Bolingo ya Nzambe,” esengeli kokoba koyekola na ye tii akosilisa buku “Bolingo ya Nzambe.” Ata soki moto oyo ozali koyekola na ye asili kozwa batisimo, okoki kotánga ngonga, bozongeli ya sika mpe boyekoli. Mosakoli oyo obimi na ye akoki mpe kozwa ngonga soki apesaki makanisi na boyekoli yango.
5. Ndenge nini tokoki kosalela buku “Bolingo ya Nzambe” mpo na kosalisa bandeko oyo batiká kosakola?
5 Soki nkulutu moko oyo azali na Komite ya mosala ya lisangá asɛngi yo oyekola Biblia na ndeko moko oyo asakolaka lisusu te, mbala mosusu ekosɛnga koyekola na ye kaka mwa mikapo oyo eyokani na likambo na ye na buku “Bolingo ya Nzambe.” Boyekoli ya ndenge wana esengeli kozwa ntango molai te. Oyo nde mateya kitoko ezali na buku wana ya sika, oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tótikala “na kati ya bolingo ya Nzambe”!—Yuda 21.