Landá ndakisa ya Moteyi Monene ntango ozali kosalela buku Biblia eteyaka
1. Ndenge nini Yesu azalaki koteya?
1 Yesu, Moteyi Monene, azalaki ntango nyonso kolimbola makambo na ndenge ya malamu mpe ya polele. Mpo na kotinda bayoki na ye bákanisa, azalaki ntango mosusu kotuna bango bápesa makanisi. (Mat. 17:24-27) Azalaki kobenda likebi na bango na Liloba ya Nzambe. (Mat. 26:31; Mko. 7:6) Azalaki kokeba ete alɛmbisa bango na mateya ebele ebele te, mpo ayebaki ete bakoyekola makambo mingi na nsima. (Yoa. 16:12) Yesu azalaki mpe koluka koyeba soki bayekoli na ye bazali kondima mpe kokanga ntina ya makambo azali koteya bango. (Mat. 13:51) Buku Biblia eteyaka esalemi mpo na kosalisa biso tóteyaka mpe ndenge wana.
2. Wapi ndenge oyo tokoki kosalela mituna ya ebandeli ya mokapo mokomoko?
2 Mituna ya ebandeli: Ntango obandi koyekola na moto mokapo moko, ezali malamu kobenda likebi na ye na mituna ya ebandeli oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya monene. Okoki kotuna ye mituna yango kaka mpo na kolamusa mposa na ye. To, okoki kosɛnga ye apesa biyano ya mokuse na mituna yango. Ezali na ntina te olobela mingi biyano oyo akopesa to obongisa maloba nyonso oyo akobimisa. Okoki kaka kotɔnda ye mpo na makanisi na ye mpe kobanda boyekoli. Makanisi oyo apesi na mituna yango ya ebandeli nde ekosalisa yo oyeba bisika oyo osengeli kolimbola malamu mpenza na liteya wana.
3. Ndenge nini tokosala ete boyekoli ezala pɛtɛɛ?
3 Bavɛrsɛ: Boyekoli esengeli kolobela mingi nde Biblia. (Ebe. 4:12) Atako bongo, ezali na ntina te kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo batye maloba na yango na lisolo te. Bendá likebi mingi na bavɛrsɛ oyo esimbi mpenza bindimeli na biso. Mbala mosusu ekosɛnga te kotánga bavɛrsɛ oyo ezali kaka kobakisa mwa makanisi. Buku Biblia eteyaka emonisaka mateya ya solo na ndenge ya mindɔndɔ te. Salá ete boyekoli ezala pɛtɛɛ. Bendá likebi na makambo ya ntina, mpe kolobelaka makambo ya mikemike mpenza te, kolobela mpe mingi te makambo oyo ezali na liteya te.
4. Nini ekosalisa biso tóyeba soki esengeli koyekola apɛndisi to te?
4 Apɛndisi: Longola masolo mpenza ya buku, apɛndisi ezali na masolo 14. Moto na moto akotala soki esengeli kotalela masolo yango na ntango ya boyekoli to te. Na mikapo mosusu, okolendisa kaka moyekoli atánga makambo ya apɛndisi yango ye moko, mingi mpenza soki azali kokanga ntina mpe kondima mateya oyo ezali na mokapo. Na ndakisa, soki moyekoli andimi ete Yesu azali Masiya, ezali na ntina te kotalela na ye lisolo ya apɛndisi oyo elobi “Yesu Klisto—Masiya oyo alakamaki,” wana bozali koyekola mokapo 4, oyo elobi ete “Yesu Klisto azali nani?” Na mikapo mosusu, ekozala malamu koyekola na moto makambo ya apɛndisi to eteni moko ya makambo yango.
5. Soki toponi kotalela makambo oyo ezali na apɛndisi, ndenge nini tokoki kosala yango?
5 Soki oponi koyekola apɛndisi, osengeli liboso kobongisa mituna, mpe kotánga paragrafe mokomoko ndenge tosalaka na boyekoli mpenza. To, na kotalela mposa ya moyekoli, okoki kozwa mwa miniti na ntango ya boyekoli mpo na kozongela makambo ya apɛndisi oyo atángaki ye moko. Yango ekosalisa yo oyeba soki akangaki ntina ya makambo atángaki to te.
6. Ndenge nini tokosalela etanda ya bozongeli na nsuka ya boyekoli?
6 Etanda ya bozongeli: Mbala mingi, etanda oyo ezali na nsuka ya mokapo epesaka makanisi oyo ezali nde biyano na mituna ya ebandeli ya mokapo. Okoki kosalela makanisi yango mpo na kozongela makanisi ya ntina ya mokapo. Basakoli mosusu bamonaka ete kotánga likanisi mokomoko mpe vɛrsɛ na yango elongo na moyekoli esalisaka mingi. Na nsima, batunaka moyekoli alimbola na mokuse ndenge vɛrsɛ yango endimisi likanisi oyo bapesi wana. Yango ekosalisa mosakoli ayeba soki moyekoli akangi mpenza makambo ya ntina ya liteya yango, ndenge oyo Biblia endimisi yango, mpe soki azali mpenza kondima makambo yango. Yango ekosalisa mpe moyekoli ayeba kosalela Biblia mpo na kolimbwela bato mateya ya solo.
7. Ndenge nini tokoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kokokisa mokumba na biso?
7 Lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa mosala na biso ya koteya bato mpe kokómisa bango bayekoli ezali ya kolanda mayele ya koteya oyo Yesu asalelaki. (Mat. 28:19, 20) Buku Biblia eteyaka ekoki kosalisa biso na likambo yango. Saleláká buku yango malamu mpo na koteya bato mateya ya solo polele, na mindɔndɔ te, mpe na ndenge oyo ekosepelisa.