Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
Mokili elukaka kotinda biso tókanisa ete ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekoumela libela na libela. Nzokande Liloba ya Nzambe elobi bongo te. (1 Yoa. 2:15-17) Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso tóyeba ete ezali na ntina te tómibombela biloko ya motuya awa na mabelé. Basaleli ya Nzambe bakozwa mpenza makasi ntango bakolanda liyangani ya zongazonga ya mobu ya mosala 2007, oyo ezali na motó ya likambo: “Tómibombela biloko ya motuya na likoló.”—Mat. 6:19, 20.
Makanisi ya koluka kokóma na biloko mingi ya mokili ezali moko ya makambo oyo Baefese 2:2 ebengi “nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” Ndenge mopɛpɛ ezali bisika nyonso mpe ezali mpasi te kopema yango, ndenge moko mpe “elimo ya mokili” epalangani na ebongiseli oyo mobimba. (1 Kol. 2:12) Elimo yango ebongolaka mpenza makanisi ya bato, yango wana Biblia elobi ete ezali na “nguya.” Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo ekosalisa biso tóboya makanisi ya mokili, ya koluka kokóma na biloko ya mokili mingi mpe tókoba kotya makanisi na biso nyonso na makambo oyo eleki ntina. (Mat. 6:33) Lisusu, liyangani yango ekosalisa biso tótyela Yehova motema mpe tókoba kosakola ata na mitungisi mpe na mimekano ya ndenge nini.
Salá makasi oyangana mikolo nyonso mibale mpe ‘otya likebi koleka mpenza.’ (Ebe. 2:1) Komá makanisi oyo omoni ete okoki kosalela yango na bomoi na yo mpe na mosala ya kosakola. Soki okolanda programɛ wana oyo ekopesa biso bolamu mingi na elimo, bandá ebandeli tii na nsuka, okolendisama mpenza mpe okozwa makasi ya ‘komibombela biloko ya motuya na likoló’!