Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/06 lok. 4
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • ‘Bilei na ntango oyo ebongi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 8/06 lok. 4

Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Elimo santu epesaki baklisto ya liboso nguya, mpe yango esalaki ete bámipesa mingi na kopalanganisa nsango malamu bipai nyonso. (Mis. 1:8; Kols. 1:23) Liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala 2007, oyo elobi “Omipesa mingi na mosala oyo etali liloba,” ekosalisa biso tólanda ndakisa na bango ya malamu.​—Mis. 18:5.

Mokonzi Davidi alobaki boye mpo na Liloba ya Nzambe: “Litatoli ya [ Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango.” (Nz. 19:7) Liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala 2007, oyo ebongisami malamu mpenza, ekolobela polele ntina ya Makomami “mpo na kosembola makambo,” mpe ekolendisa biso tósalela Liloba ya Nzambe mpo na kosakola mpe koteya bato, koyebáká ete mikolo etikali ya kotánga. (2 Tim. 3:16, 17) Liyangani yango ekomonisa biso ndenge oyo tokoki kokima mitambo, mpe matomba oyo tokozwa soki tozali kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso. Lisusu, ekosalisa biso tósalela Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bilenge mpe bato ya sika bákola na elimo.

Salá makasi ozala wana ntango liyangani ezali kobanda, mpe landá yango na likebi mpenza. Komá makambo oyo okoki kosalela. Mpo na komonisa ete ozali na botɔndi, landá na likebi mpenza mateya mpe malako oyo tokozwa, mpe kanisá ndenge ya kosalela makambo oyo oyoki.

Liyangani ya mokolo moko ekosalisa biso tósepela na Liloba ya Nzambe lisusu koleka, ekosalisa biso tókoba kosakola nsango malamu na molende, mpe ekomonisa biso ndenge ya kosalisa basusu mpe básala bongo. Na bongo, omityela mokano ya kozangisa ata eteni moko te ya liyangani yango, mpo na kozwa mateya mpe litambwisi oyo Yehova akopesa biso na nzela wana!​—Yis. 30:20b, 21.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto