Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/08 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela buku “Bolingo ya Nzambe” mpo na koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Biblia eteyaka​—Buku ya liboso mpo na koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Salisá bato bátosa oyo Biblia eteyaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 1/08 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Buku nini mibale tosengeli kosalela mpo na koyekola na bato Biblia?

Biblia eteyaka ezali buku ya libosoliboso oyo tosalelaka mpo na kobanda mpe kokoba koyekola na bato Biblia. Atako ezali mabe te kosalela mikanda mosusu, na ndakisa trakte moko oyo ebongi, mpo na kobanda koyekola na moto Biblia, kasi tosengeli koluka nokinoki kokɔtisa ye na buku Biblia eteyaka. Basakoli mingi bazwi matomba mpenza na ndenge basalelaki buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

Soki kaka tosilisi koyekola na moto buku Biblia eteyaka mpe moto yango azali kokola na elimo, tosengeli koyekola na ye buku Tósambela Nzambe. (Kols. 2:⁠7) Lokasa 2 ya buku yango elobi mpo na mokano na yango boye: “Biblia ezali kolendisa bato nyonso oyo balingaka Nzambe ete bázala na likoki ya ‘kososola na makanisi . . . bosanda mpe bozindo’ ya mateya kitoko wana ya solo. (Baefese 3:18) Buku oyo ebongisami mpo na kosalisa bato na likambo yango. Tozali na elikya ete buku oyo ekosalisa yo okola na elimo, mpe ozala na nyonso oyo esengeli mpo na kotambola na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi na mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Nzambe alaki.”

Soki moyekoli azwi batisimo liboso ete asilisa buku wana ya mibale, asengeli kokoba koyekola tii akosilisa yango. Ata soki moyekoli yango azwi batisimo, mosakoli oyo ayekolaka na ye akokoba kotánga ngonga oyo bayekoli, bozongeli ya sika, mpe boyekoli ya Biblia. Mosakoli oyo abimi na ye mpe asengeli kozwa ngonga soki asanganaki na boyekoli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto