Ozali kozela nini mpo na kotondisa yango?
Kotondisa nini? Karte DPA (Instructions médicales/Désignation d’une personne de confiance), oyo ebongisami mpo na Batatoli oyo bazwá batisimo. Lokola oyebi te ‘oyo bomoi na yo ekozala lobi,’ ezali na ntina mingi ozwa ekateli libela mpe omonisa lolenge ya lisalisi ya monganga oyo okondima bápesa yo na ntango ya likama, mpe okoma makambo yango. (Yak. 4:14; Mis. 15:28, 29) Video oyo motó ya likambo na yango elobi Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient ebimisamaki mpo na kosalisa yo na likambo yango. Talá yango, mpe nsima ya kobondela, salelá mituna oyo ezali awa na nse mpo na kotalela lisusu makambo oyo oyekoli.—Liyebisi: Lokola video yango ezali mpe komonisa ndenge bazali kosala moto lipaso, baboti basengeli kokeba ntango bazali kotala yango elongo na bana mike.
(1) Mpo na nini minganga mosusu bakómi kobongola makanisi na likambo ya kozongisa moto makila? (2) Pesá ndakisa ya mapaso misato ya minene oyo basalaki kozanga kozongisa makila. (3) Na mokili mobimba, minganga boni bandimi kosalisa bato ya maladi mpe kosala bango lipaso kozanga bázongisa bango makila? Mpo na nini bandimi kosala bongo? (4) Baankɛtɛ oyo euti kosalema na balopitalo emonisi nini na likambo ya kosalela makila? (5) Makama nini ekoki kokómela moto soki bazongisi ye makila? (6) Minganga mingi balobi nini mpo na matomba ya mayele mosusu oyo minganga basalelaka na esika ya kozongisa moto makila? (7) Nini esalaka ete moto asila makila? Tii na nivo nini makila ya moto ekoki kokita kozanga ete ezala likama? Nini bakoki kosala mpo makila emata? (8) Nini ekoki kosalisa nzoto ya moto ebota lisusu ba globules rouges mingi? (9) Mayele nini minganga bakómi kosalela mpo moto abima makila mingi te ntango bazali kosala ye lipaso? (10) Bakoki mpe kosalela mayele oyo esɛngaka te kozongisa moto makila, epai ya bana mike to epai ya bato oyo bazali na maladi makasi? (11) Wapi moko ya mibeko ya libosoliboso ya mosala ya monganga oyo monganga ya malamu asengeli kobosana te? (12) Mpo na nini ezali na ntina bakristo bápona liboso mpenza lolenge ya lisalisi ya monganga oyo ekosɛnga makila te? Ndenge nini tokoki kosala yango?
Moto na moto nde akozwa ekateli ya koboya to kondima mitindo mosusu ya lisalisi ya monganga oyo balakisi na video oyo, na kotalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Osili kopona mayele oyo minganga basalelaka na esika ya makila, oyo yo ná bana na yo bokondima básalisa bino na yango soki bosili makila mpe okómi yango na karte DPA? Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá na likebi mokapo 7 ya buku “Bolingo ya Nzambe” mpe mikanda mosusu epai batindi biso na mokapo yango. Talá mpe siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, oyo ezali na motó ya likambo: “Ekateli nini nakozwa mpo na biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?” Na nsima, osengeli kokoma makambo oyo oponi na karte na yo DPA. Bato oyo oponi báloba na esika na yo soki ozali lisusu kokoka koloba te mpe bandeko na yo ya libota oyo bazali Batatoli te basengeli koyeba malamu bikateli oyo ozwi.
[Etanda na lokasa 3]
• Osili kopona mayele mosusu oyo minganga basalelaka na esika ya kotya makila oyo yo ná bana na yo bokondima?
• Otambolaka na karte na yo DPA oyo otondisi malamu mpo esalisa yo soki ozwi likama ya mbalakaka?