Ozali kozela nini mpo na kotondisa yango?
Kotondisa nini? Karte DPA (Instructions médicales/Désignation d’une personne de confiance), oyo ebongisami mpo na basakoli oyo bazwá batisimo. Lokola oyebi te ‘oyo bomoi na yo ekozala lobi,’ ezali na ntina mingi ozwa ekateli libela mpo na lolenge ya lisalisi ya monganga oyo okondima bápesa yo na ntango ya likama, mpe okoma makambo yango kokoma. (Yak. 4:14; Mis. 15:28, 29) Mpo na kosalisa yo, babimisi video oyo ezali na motó ya likambo: Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient. Talá yango, mpe nsima ya kobondela, salelá mituna oyo batye awa na nse mpo na kotalela lisusu makambo oyo oyekoli.—Liyebisi: Lokola video yango ezali mpe komonisa ndenge bazali kosala moto lipaso, baboti basengeli kokeba ntango bazali kotala yango elongo na bana mike.
(1) Mpo na nini minganga mosusu bakómi kobongola makanisi na likambo ya kozongisa moto makila? (2) Pesá ndakisa ya mapaso misato ya minene oyo bakoki kosala moto kozanga bázongisa ye makila. (3) Na mokili mobimba, minganga boni bandimi kosalisa bato ya maladi mpe kosala bango lipaso kozanga bázongisa bango makila? Mpo na nini bandimi kosala bongo? (4) Baankɛtɛ oyo euti kosalema na balopitalo, emonisi nini na likambo ya kosalela makila? (5) Makama nini ekoki kokómela moto soki bazongisi ye makila? (6) Bato mingi ya mayele balobi nini mpo na matomba ya mayele mosusu oyo minganga basalelaka na esika ya kozongisa moto makila? (7) Nini esalaka ete moto asila makila? Tii na nivo nini makila ya moto ekoki kokita kozanga ete ezala likama? Nini bakoki kosala mpo makila emata? (8) Nini ekoki kosalisa nzoto ya moto ebota lisusu ba globules rouges mingi? (9) Mayele nini minganga bakómi kosalela mpo moto abima makila mingi te ntango bazali kosala ye lipaso? (10) Bakoki mpe kosalela mayele oyo esɛngaka te kozongisa moto makila, epai ya bana mike to epai ya bato oyo bazali na maladi makasi? (11) Wapi moko ya mibeko ya libosoliboso ya mosala ya monganga oyo monganga ya malamu asengeli kobosana te? (12) Mpo na nini ezali na ntina baklisto bápona liboso mpenza lolenge ya lisalisi ya monganga oyo ekosɛnga makila te? Ndenge nini tokoki kosala yango?
Mitindo mosusu ya lisalisi ya monganga oyo balakisi na video oyo, moto na moto nde akozwa ekateli ya koboya to kondima yango na kotalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Osili kotalela mayele mosusu oyo minganga basalelaka na esika ya makila, oyo yo ná bana na yo bokondima básalisa bino na yango soki bosili makila? Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi,” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000, mpe siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, oyo ezali na motó ya likambo “Ekateli nini nakozwa mpo na biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?” Bato oyo okopona lokola batemwe mpe bandeko na yo ya libota basengeli koyeba malamu bikateli oyo ozwi.