Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/09 lok. 10
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 3/09 lok. 10

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi

“Ekoki kozala mpasi kosala makambo ya malamu soki bato bazali kotinda biso tósala ndenge mosusu. Mpo na yo, nini ekoki kosalisa biso tókwea te na motambo ya kobanga bato? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Masese 29:25.] Lisolo oyo elobeli ntina mitano oyo ekoki kosalisa biso tobangaka Nzambe kasi bato te.” Lakisá lisolo yango na lokasa 12.

Lamuká! Marsi

“Biso nyonso tolingaka kozala na baninga ya malamu. Bizaleli nini olingaka komona epai ya moninga na yo? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Biblia elobi na ntina ya likambo yango. [Tángá Masese 17:17.] Lisolo oyo epesi mwa batoli mpo na kopona baninga ya malamu mpe ndenge biso mpe tokoki kozala baninga ya malamu mpo na basusu.” Lakisá lisolo yango na lokasa 18.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aprili

“Nalingaki koyeba likanisi na yo na maloba oyo ya Yesu. [Tángá Yoane 3:3.] Okanisi ete kobotama lisusu elimboli nini? [Tiká ye apesa eyano.] Soki toyebi malamu likambo oyo Yesu alingaki koloba na vɛrsɛ yango, ekotinda biso tóbongola bomoi na biso mpe tókóma na elikya mpo na mikolo ezali koya. Zulunalo oyo elimboli likambo yango.”

Lamuká! Aprili

“Bana-kelasi mingi batungisamaka koleka ndelo mpo bazali na makambo mingi ya kosala na eteyelo. Okanisi ete makambo ebongwani na ndenge ezalaki na mikolo ya baboti na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Komitungisa mingi ekoki kozala likama. [Tángá Mosakoli 7:7a.] Zulunalo oyo elobeli ndenge oyo mikóló bakoki kosalisa bilenge mpo bálonga likambo yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto