Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/11 nk. 4-7
  • Mikolo misato oyo tokolendisama na elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikolo misato oyo tokolendisama na elimo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Etamboli oyo epesaka Nzambe nkembo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 4/11 nk. 4-7

Mikolo misato oyo tokolendisama na elimo

1. Matomba nini tokozwa na liyangani ya etúká ya mbula oyo?

1 Na mokili ya Satana oyo ezali na nzala ya elimo, Yehova azali kokoba koleisa basaleli na ye. (Yis. 58:11) Moko ya bibongiseli oyo Yehova asalelaka mpo na kopesa biso makasi ezali liyangani ya etúká oyo tosalaka mbula na mbula. Lokola liyangani ya etúká ya mbula oyo ekómi pene, ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kolendisama mpe kolendisa basusu na elimo?​—Mas. 21:5.

2. Bibongiseli nini tosengeli kozwa banda sikoyo?

2 Soki obongisi naino te programɛ na yo moko to programɛ na yo ya mosala mpo na kozala na liyangani ya etúká mikolo nyonso misato, luká kosala yango sikoyo. Osili koluka koyeba ngonga boni okobanda kosala mpo na kokóma na esika ya liyangani mikolo nyonso misato mpo na kozwa esika ya kofanda liboso ete programɛ ebanda? Tokolinga soki moke te kozanga ata eteni moko ya mateya ya kolendisa oyo Yehova abongisi mpo na biso! (Yis. 65:13, 14) Osili kozwa bibongiseli mpo na esika ya kolala mpe mbongo ya kofuta tikɛ?

3. Makambo nini tosengeli kosala biso moko mpe na libota mpo na kozwa matomba mingi na programɛ mobimba ya liyangani?

3 Nini ekosalisa yo olanda liyangani mobimba na likebi mpenza? Soki likoki ezali, laláká mingi butu nyonso na mikolo ya liyangani. Taláká ndeko oyo azali kosala diskur. Tángáká bavɛrsɛ nyonso na Biblia na yo. Komáká mwa makanisi ya ntina. Ekozala malamu ete libota mobimba efanda esika moko mpo baboti básalisa bana na bango bálanda programɛ na likebi. (Mas. 29:15) Soki likoki ezali, mpokwa nyonso nsima ya liyangani, bokoki kolobela makanisi ya ntina ya programɛ. Mpo libota na bino ekoba kolendisama ata nsima ya liyangani, bosengeli kozwa mwa ntango na mpokwa ya Losambo na kati ya libota mpo na kozongela makanisi ya ntina oyo libota na bino esengeli kosalela.

4. Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko mosusu ya lisangá na biso bálendisama na elimo?

4 Salisá basusu bálendisama: Mposa na biso ezali ete liyangani elendisa mpe bandeko mosusu. Ezali nde na basakoli ya mibange to bandeko mosusu ya lisangá oyo basengeli na lisalisi mpo na kokende na liyangani? Ozali na likoki ya kosalisa bango? (1 Yoa. 3:17, 18) Bankulutu, mingimingi bakɛngɛli na bituluku ya mosala ya kosakola, basengeli kosala nyonso mpo basakoli ya ndenge wana bázwa lisalisi oyo basengeli na yango.

5. Ndenge nini tokokabola nkasa ya libyangi mpo na liyangani? (Talá mpe etanda oyo ezali awa likoló.)

5 Kaka ndenge tomesani kosala, pɔsɔ misato liboso ete liyangani na biso ebanda, tokosala kampanye mpo na kobenga bato na liyangani. Masangá esengeli komityela mokano ya kokabola nkasa ya libyangi oyo bakozwa mpe soki likoki ezali kosilisa teritware na bango mobimba. Nkasa ya libyangi oyo libota na bino ekotikala na yango na nsuka ya kampanye, bosengeli komema yango na esika ya liyangani mpo bókabola yango ntango bozali kopesa litatoli ya libaku malamu. Na liyangani, na mokolo ya mitano, bakoyebisa biso ndenge ya kosalela nkasa ya libyangi oyo ekotikala. Soki bomoni ete libota na bino ekokoka te kokabola nkasa ya libyangi ntango bokozala na engumba oyo liyangani ekosalema, bópesa yango na moko ya bandeko oyo bapesaka bisika ya kofanda ntango bokokɔta na esika ya liyangani. Kobosana te kobomba lokasa moko ya libyangi mpo na yo moko, mpo okoka kotala yango ntango diskur ya nsuka na mokolo ya lomingo ekosalema.

6. Na makambo nini tokoki komonisa bizaleli malamu na liyangani?

6 Bizaleli na biso ya malamu elendisaka bandeko na biso bakristo: Na eleko oyo bato mingi “bamilingaka” mpe bakipaka te mpasi ya basusu, tolendisamaka mpenza ntango tokutanaka na bandeko na biso bakristo oyo basalaka makasi mpo na komonisa bizaleli malamu! (2 Tim. 3:2) Tomonisaka bizaleli malamu na ndenge tokɔtaka na esika ya liyangani kozanga kotindikana mpe na molɔngɔ ntango bafungoli porte, mpe na ndenge tokangaka bisika ya kofanda kaka mpo na bandeko oyo tofandaka na bango ndako moko to baoyo toyei na bango motuka moko to mpo na baoyo toyekolaka na bango Biblia. Tolandaka malako ya prezida ntango asɛngaka biso tókende na bisika na biso ya kofanda mpo na koyoka miziki oyo ebɛtaka liboso ya eteni mokomoko ya liyangani. Tokomonisa mpe ete tozali na bizaleli malamu soki tokangi telefone na biso to aparɛyi mosusu oyo tozali na yango to totye yango na vibreur mpo elongola te likebi ya basusu na programɛ ya liyangani. Tokomonisa mpe bizaleli malamu soki tozali kolobaloba te, kotinda bamesajɛ na telefone te, kolya te, to kotambolatambola te ntango liyangani ezali kosalema.

7. Ndenge nini tokoki kolendisama mpe kolendisa basusu ntango tokutani na bandeko na biso bakristo?

7 Kokutana na baninga elendisaka: Mayangani ebakiselaka biso mabaku ya kokutana na bandeko na biso bakristo. (Nz. 133:1-3) Mpo na nini te ‘kofungwama’ mpe koluka kokutana na bandeko mibali mpe basi ya masangá mosusu oyo bayei na liyangani? (2 Ko. 6:13) Okoki komityela mokano ya koyeba moto moko to libota moko mokolo mokomoko ya liyangani. Bopemi ya midi ekopesa yo libaku malamu ya kosala yango. Yango wana, memá bilei ya pɛpɛlɛ mpo olya yango na kati ya esika ya liyangani mpo osolola na bandeko, na esika ya kobima mpo na kokende kosomba bilei libándá to kokende kolya na restora to na malewa. Yango ekosalisa yo ozwa baninga ya sika oyo okobosana bango te.

8. Mpo na nini tosengeli kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

8 Kosala elongo na bandeko na biso bakristo na mosala mosantu elendisaka mpenza! Okoki kopesa mabɔkɔ na departema moko to na misala ya kotya bopɛto oyo bapesi lisangá na bino? (Nz. 110:3) Soki bapesi yo mosala te, okoki kokende kosɛnga mosala na departema ya basali ya bolingo malamu. Mosala oyo esalemi na bato ebele esalemaka na esengo mpe esilaka noki.

9. Mpo na nini tosengeli mpenza kokeba na etamboli na biso, na molato na biso, mpe na ndenge na biso ya kobongisa nzoto ntango tozali na liyangani?

9 Etamboli na biso esepelisaka bato oyo bamonaka biso: Ezala ntango tozali kolanda programɛ to na bantango mosusu, tosengeli komonisa ete tozali bato oyo bayei na liyangani. Bato oyo bakomona biso ntango tozali na engumba oyo liyangani ekosalema basengeli komona bokeseni monene oyo ezali kati na biso mpe bato oyo bazali Batatoli te. (1 Pe. 2:12) Molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto ezala na esika oyo liyangani ekosalema, na esika oyo tokolala, to mpe na barestora esengeli kopesa Yehova nkembo. (1 Tim. 2:9, 10) Soki tolati makarɔ na biso, bato oyo bakomona biso bakoyeba ete tozali Batatoli ya Yehova. Yango ekoki kopesa biso libaku ya koyebisa bango makambo oyo etali liyangani na biso mpe kopesa bango litatoli.

10. Makambo nini oyo esalemaki emonisi ete etamboli na biso ya malamu epesaka litatoli ya malamu?

10 Etamboli na biso ya malamu na ntango ya liyangani esalaka nini epai na bato mosusu? Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko elobaki ete mokambi ya ndako moko oyo bandeko basalelaki mpo na mayangani alobaki boye: “Bato oyo bazali na limemya mingi. Tosepelaka mingi ndenge bayaka epai na biso mbula nyonso.” Na mbula euti koleka, moto moko oyo azali Motatoli te abungisaki sakosi na ye ya moke na otɛlɛ moko epai bandeko oyo bayaki na liyangani bazalaki kolala. Ntango bazongisaki sakosi yango ya moke epai ya mokambi ya otɛlɛ, ná biloko nyonso oyo ezalaki na kati, mokambi yango ayebisaki nkolo sakosi yango boye: “Obiki kaka mpo Batatoli ya Yehova bazalaki na liyangani na bango pembeni awa, mpe otɛlɛ mobimba etondaki na bango. Soki te, ntango mosusu olingaki kozwa yango te.”

11. Lokola liyangani ya etúká ekómi pene, tosengeli kozala na mokano nini, mpe mpo na nini?

11 Liyangani na biso ya etúká ya mbula oyo ekómi pene mpenza. Bandeko balekisaki ntango mingi mpe basalaki milende mpo na kobongisa programɛ ya liyangani mpe esika oyo yango ekosalema. Mityelá mokano ya koyangana mikolo nyonso misato, mpe mibongisá mpo na kolanda mateya oyo Yehova mpe ebongiseli na ye babongisi mpo na yo. Zwá ekateli ya kolendisa basusu na bizaleli na yo ya malamu, na esengo oyo okozala na yango ntango okokutana na bango mpe na etamboli na yo ya malamu. Soki osali bongo, yo mpe bandeko mosusu bokomiyoka lokola ndeko mwasi moko oyo, nsima ya kokɔta liyangani ya mbula euti koleka, alobaki ete: “Nayebi te likambo mosusu oyo esepelisaki ngai koleka liyangani wana!”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Kaka ndenge tomesani kosala, pɔsɔ misato liboso ete liyangani na biso ebanda, tokosala kampanye mpo na kobenga bato na liyangani

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto ezala na esika oyo liyangani ekosalema, na esika oyo tokolala, to mpe na barestora esengeli kopesa Yehova nkembo

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

Zwá ekateli ya kolendisa basusu na bizaleli na yo ya malamu, na esengo oyo okozala na yango ntango okokutana na bango mpe na etamboli na yo ya malamu

[Etanda na nkasa 4-7]

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká 2011

◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 8:20. Kasi, mpo na mayangani oyo ekosalema na bingumba ya minene lokola: Brazzaville, Goma, Kananga, Kikwit, Kinshasa, Kisangani, Kolwezi, Likasi, Lodja, Lubumbashi, Matadi, Mbandaka, Mbuji Mayi, Mwene Ditu, Pointe Noire mpe Tshikapa, programɛ ekobanda mikolo nyonso misato na ngonga ya 9:20. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 7:00 to 8:00 soki ebongi. Ntango prezida ayebisi ete miziki elingi kobanda, biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na ndenge oyo ekokumisa Yehova.

◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango vuatire moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko, to mpe baoyo toyekolaka na bango Biblia.​—1 Ko. 13:5.

◼ Bilei ya midi: Tolendisi bino bómema bilei ya pɛpɛlɛ kasi oyo etongaka nzoto, na ndakisa biloko lokola mampa, bitabe, nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko libándá ekozala te. Koboya kosomba biloko epai ya batɛki ya libándá ekopesa litatoli malamu mpo na bopɛto na biso. (Liyebisi: Bóyeba ete bato oyo batɛkaka biloko ya kolya bazali na ndingisa te ya kokɔta na esika ya liyangani.​—Yoa. 2:13-17.)

◼ Makabo: Mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na bibongiseli nyonso oyo ezwami mpo na kobongisa liyangani, tokoki kopesa makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi to na liyangani mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Soki moto alingi kotondisa chèque mpo na kopesa likabo na ye, akotinda yango na Association “Les Témoins de Jéhovah.”

◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Bandeko mingi babengaka departema ya lisalisi ya nokinoki na telefone mpo na makambo ya mikemike. Soki moto moko abɛli maladi ya mbalakaka to azwi likama na esika ya liyangani, esengeli naino koyebisa moko ya bandeko oyo bazali kopesa bisika ya kofanda; ye akoyebisa nokinoki bandeko ya departema ya lisalisi ya nokinoki mpo bátala soki moto yango azali na maladi ya ndenge nini mpe ndenge oyo bakoki kosalisa ye.

◼ Kokanga bafɔtɔ: Soki bolingi kokanga bafɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, bósalela te mwinda ya fɔtɔ (flash). Bóbengisa te na esika ya liyangani bato oyo basalaka mosala ya kokanga bafɔtɔ. Soki bomoni bango na esika ya liyangani bazali koluka bakiliya, bókangisa bafɔtɔ epai na bango te.​—Yoa. 2:13-17.

◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kokanga yango to kotya yango na vibreur mpo elongola te likebi ya bayangani.

◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete bandeko mosusu oyo basombaka biloko ya kolya libándá babwakaka nkasa to sashɛ na mabele. Yango wana, esika ya liyangani etondaka na bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi mpe biloko mosusu. Soki moto moko amoni malamu kokende kosomba biloko ya kolya libándá, asengeli kobwaka nkasa to sashɛ na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na mabele te. Soki tomoni papye to sashɛ na mabele, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tósala milende mpenza mpo na kobatela esika na biso ya liyangani pɛto, ezala na kati to na libándá. Moto nyonso oyo azali na liyangani asengeli koyeba ete bopɛto ezali na ntina mingi. Soki moto mokomoko apesi mabɔkɔ, esika ya liyangani ekobanda kotikala pɛto mikolo nyonso. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.​—1 Pe. 1:15, 16; Kob. 19:10; Mib. 23:14.

◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Bótosa motángo ya bato oyo nkolo-ndako ayebisi mpo na shambre moko. (2) Soki omoni ete okofanda lisusu te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango nokinoki. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo-ndako to ndeko oyo azali kopesa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi nini okoki kosala mpo makambo nyonso eleka malamu. (4) Salelá malamu eloko nyonso oyo bapesi yo ndingisa ya kosalela. Esengeli kosala makambo nyonso na bokatikati. (5) Bopɛto ná ezaleli ya kobanga Nzambe etambolaka nzela moko. Mikolo nyonso tikáká esika na yo ya kolala pɛto mpe kotika biloko na mobulu te. Yango etali mpe Ndako ya Bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo ntango ozali elongo na basusu, ezala ndeko oyo ayambi yo na ndako na ye to bandeko mosusu oyo ozali kolala na bango esika moko.​—Gal. 5:22, 23.

◼ Basali ya bolingo malamu: Esengo oyo toyokaka ntango tozali na liyangani ebakisamaka lisusu soki tondimi kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge oyo esalemaka na liyangani. (Mis. 20:35) Ndeko nyonso oyo alingi kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani asengeli kokende na departema ya basali ya bolingo malamu. Bana oyo bakokisi naino mbula 16 te bakoki mpe kopesa mabɔkɔ soki bazali kosala elongo na baboti na bango to na ndeko mosusu ya mokóló oyo akokɛngɛla bango.

[Etanda na lokasa 5]

Tokoloba nini mpo na kopesa lokasa ya libyangi?

Mpo tókabola nkasa ya libyangi na teritware na biso mobimba, tosengeli koloba mingi te. Tokoki koloba boye: “Mbote. Kampanye mpo na kokabola lokasa oyo ya libyangi ezali kosalema na mokili mobimba. Biso mpe tozali kokabola yango. Ya yo yango oyo. Okoyeba makambo mosusu soki otángi lokasa yango.” Lokasa ya libyangi ezali na bililingi oyo ekobenda likebi ya bato; yango wana pesá moto lokasa yango na ndenge oyo ekosalisa ye amona yango malamu. Lobá na esengo. Ntango tokokabola nkasa ya libyangi na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tokokabola yango nzela moko na bazulunalo na biso, soki ebongi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto