Ntango nini tosengeli kozongela bato oyo basepelaki?
1. Mosala ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka nini?
1 Mosala ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka kozongela moto nyonso oyo asepeli koyeba Bokonzi ya Yehova. (Mat. 28:19, 20) Mbala mingi, ntango malamu mpo na kozongela moto oyo asepeli etalelaka programɛ na biso ná oyo ya ye. Mpo na nini tosengeli kolekisa ntango mingi te liboso ya kozongela moto oyo asepeli?
2, 3. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tózongela noki moto oyo asepelaki?
2 Mpo na nini tosengeli kozonga nokinoki? Etikali moke mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” esila, mpe nsuka ya mokili oyo ekómi pene. (Mat. 24:14; 1 Pe. 4:7) Yango wana, lokola tozali naino na ‘mokolo ya lobiko’ mpo na bato oyo basepeli, tosengeli kokokisa etinda ya ‘kosakola liloba na molende’; yango esɛngi kozongela bato nokinoki mpo tókolisa mposa oyo bamonisaki.—2 Ko. 6:1, 2; 2 Tim. 4:2.
3 Satana alukaka kopikola mbuma nyonso ya Bokonzi oyo toloni na motema ya moto. (Mrk. 4:14, 15) Mbala mingi, soki moto asepeli na nsango na biso, bandeko na ye, baninga na ye ya mosala, mpe bato mosusu basɛkaka ye. Soki tozongeli ye noki, lokola abosani naino te makambo oyo tosololaki na ye liboso, tokozala na likoki ya kolimbwela ye makambo ya sika liboso bato mosusu bálongola ye mposa ya koyekola.
4. Tokoki kosala nini ntango tokutani na moto mbala ya liboso mpo tókoba masolo ntango tokozongela ye?
4 Bóyokana mokolo oyo okozongela ye: Ntango okutani na moto mbala ya liboso, ebongaka bóyokana mokolo oyo okozongela ye liboso bókabwana. Tuná motuna moko oyo okoya kopesa eyano na yango mbala ya nsima. Ezali na ntina mingi kokoma nkombo ya moto, adrɛsi na ye, likambo bosololi mpe mokolo oyo okozongela ye. Soki programɛ na yo ekopesa yo nzela, okoki kosɛnga ye ozonga mokolo oyo elandi to nsima ya mwa mikolo moke. Soki okutani na moto mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo mpe moto yango asalaka na boumeli ya pɔsɔ, mbala mosusu akondima ozongela ye mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo oyo ekolanda. Soki oyokani na moto ete okozonga mokolo boye, salá makasi okokisa maloba na yo.—Mat. 5:37.
5. Na ndenge nini kozongela bato noki ekosalisa biso tókokisa mokumba oyo Yesu apesaki biso ya kokómisa bato bayekoli?
5 Ezali na ntina mingi tózongela nokinoki bato oyo basepeli. Yango wana, yokaná na moto ete okozongela ye mpe salá yango nokinoki, mpamba te “ntango oyo etikali ekómi mokuse.” (1 Ko. 7:29) Soki tozali koumela te kozongela bato oyo basepeli na nsango ya Bokonzi, mosala na biso ekobota mbuma malamu.