Tyá likebi na maloba ya bulɛɛ
1 Makambo nyonso oyo bato balobaka esɛngaka kaka te kotyela yango mpenza likebi. Kasi ntango Nzambe azali koloba, ezali na ntina mpenza ete tóyoka. (Det. 28:1, 2) Tozali na esengo ete bato oyo bapemamaki na elimo ya Nzambe nde bakomaki “maloba ya bulɛɛ ya Nzambe” mpo na bolamu na biso. (Lom. 3:2) Liyangani ya etúká oyo ezali koya ekopesa biso libaku malamu ya koyoka maloba yango wana ekotángama mpe ekotalelama. Ndenge nini okoki mpenza kotya likebi?
2 Yaká na ngonga malamu ntɔngɔ nyonso: Kanisá naino esengo oyo Bayisalaele bazalaki na yango ntango bayebisaki bango ete bákende kokutana na Yehova na Ngomba Sinai mpo na koyoka Mibeko na ye! (Ex. 19:10, 11, 16-19) Soki ozali na makanisi motindo moko na Bayisalaele mpo na koyoka malako ya Yehova na liyangani ya etúká, okomibongisa mpo na kokóma na esika ya liyangani mikolo nyonso na ngonga malamu. Tokozala na likoki te ya koyoka mateya nyonso oyo ebongisami soki tozali koya na nsima ya ngonga mpe kolongola likebi ya bato mosusu ntango tozali koluka bisika ya kofanda. Bato bakobanda kokɔta na esika ya liyangani na ngonga ya 8:00 na ntɔngɔ, mpe programɛ ekobanda mikolo nyonso na ngonga ya 9:30 na ntɔngɔ.
3 Ata bato mosusu oyo bayaka na ngonga malamu bazalaka te na bisika na bango ntango liyangani ebandi. Mpo na nini? Bazelaka tii ntango prezida akosɛnga na bayangani ete bátɛlɛma mpo na koyemba nzembo, nde bakotika kosolola na baninga na bango mpo na kokende na bisika na bango. Tosengeli koyeba ete mwa miniti liboso ete loyembo ya liboso ya eteni mokomoko ya liyangani ebanda, prezida akofanda na ebaelo ntango mindule ya Bokonzi ezali kobɛta. Yango ezali elembo mpo na komonisa biso ete ntango ekoki mpo na kokende kofanda! Mpe, ntango loyembo ya liboso ekoyembama, tokozala na likoki ya koyemba elongo na bayangani mosusu mpo na kosanzola Yehova.
4 Tózala esika moko libota mobimba mpo na koyoka: Ntango Bayisalaele nyonso bazalaki koyangana mpo na koyoka maloba ya bulɛɛ oyo ezalaki kotángama, mabota, na “bana,” bazalaki kokende mpo na koyoka mpe koyekola. (Det. 31:12) Na mayangani na biso, esengeli te ‘kotika’ bana ‘bango moko.’ (Mas. 29:15, NW ) Baboti, bómibongisa mpo na kofanda esika moko na libota na bino mobimba—mpe na bana oyo bakómi bilenge. Baboti mosusu bazelaka tii ntango bayangani bakobanda koyemba loyembo ya liboso mpo bámema bana na bango na twalɛti. Nzokande, kosala bongo, ekozala mpasi mpo na koteya bana ntina monene ya loyembo mpe ya libondeli na kati ya losambo na biso. Soki likoki ezali, ekoleka malamu kosilisa mposa nyonso ya kokende na twalɛti liboso ete eteni mokomoko ya liyangani ebanda!
5 Soki tozali kolala malamu na butu nyonso mpe soki na moi tozali kolya bilei ya pɛpɛlɛ, yango ekosalisa biso ete tóyoka malamu. Tyá likebi na makambo oyo molobi azali koloba. Kotika te ete makanisi na yo etambolatambola. Landá na Biblia na yo moko ntango bazali kotánga mikapo. Zwá mwa banɔti. Ntango lisukulu mokomoko ezali kosalema, kanisá makambo oyo molobi azali koloba mpe talelá ndenge oyo okosalela makambo yango na bomoi na yo. Na nsuka ya mokolo, bósolola na kati ya libota makambo oyo boyokaki na liyangani. Makambo nini moto mokomoko asepelaki na yango? Ndenge nini libota na bino ekoki kosalela malamu makambo yango?
6 Monisá limemya mpo na Liloba ya Nzambe: Liyangani ezali kopesa biso libaku malamu ya kosolola na baninga mpe kozala esika moko na bato oyo bazali mpenza baninga malamu. Soki tokómi na esika ya liyangani liboso mpenza, tokozala na ntango ya kosolola liboso ete programɛ ya liyangani ebanda. Bato mosusu, basololaka ntango liyangani ezali kosalema, bakanisaka na libunga nyonso ete ekolongola likebi ya bayangani mosusu te lokola bato bazali mingi. Ata ntango makita ezali kosalema na esika ya monene, tosengeli ntango nyonso koyoka, ndenge tosalaka ntango toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi. Tosengeli te kosalela motorola to télécel, eloko nyonso oyo ekotya makɛlɛlɛ, kamera, masini ya kokanga fɔtɔ, ntango liyangani ezali kosalema mpamba te ekoki kolongola likebi ya bayangani mosusu.
7 Ntango Mose azalaki kozwa mibeko epai ya Yehova, “alyaki [limpa, NW ] te mpe amelaki mai te.” (Ex. 34:28) Ndenge moko mpe, ekozala malamu te kolya mpe komela ntango masukulu ezali kosalema na liyangani. Longola bobele soki bokɔnɔ moko esɛngi bongo, osengeli kozela tii “ntango etyami” mpo na bopemi mpo okoka kolya.—Mos. 3:1.
8 Na mayangani mosusu bandeko mingi ata mpe bana mike bazali naino na momeseno ya kotondana mpe kotɛlɛma na bisika ya koleka ntango mayangani ezali kosalema. Bandeko oyo bapesaka bisika ya kofanda bakozwa malako ya kosɛnga bango ete bázonga na esika bayangani bafandi. Basali ya bolingo malamu oyo bazali kosala na badepartema ndenge na ndenge basengeli mbala moko kofanda na esika bayangani bazali ntango basilisi mosala na bango. Bakoki kotikala na badepartema na bango bobele soki basengi bango ete basala mosala moko ya ntina ntango liyangani ezali kosalema, soki te, basengeli kofanda na bisika na bango mpo na kolanda masukulu oyo ezali kosalema. Basengeli te kotikala na badepartema na bango na ndenge na bango moko soki mosala esili mpo na kosolola na baninga na bango mosusu na ntango masukulu ezali kosalema.
9 Tokolinga te ete tókóma “baoyo bakoyokaka noki te” ntango tozali koyoka Liloba ya Nzambe. (Ebe. 5:11) Tiká ete tózwa ekateli ya komonisa limemya na ndenge tokotya likebi mpenza ntango maloba ya bulɛɛ oyo euti epai ya Yehova ekolobama na liyangani na biso ya etúká oyo ezali koya.