Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yanuali
“Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu soki bato nyonso bátosaka etinda oyo ya Biblia? [Tángá Baroma 12:18. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Na yango, osilá komituna mpo na nini na ntango ya kala, Nzambe azalaki ntango mosusu kotinda basaleli na ye bábunda bitumba? Lisolo oyo epesi eyano ya polele oyo euti na Biblia.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 13.
Lamuká! Yanuali
Tángá Misala 17:31a. Na nsima lobá boye: “Mpo na bato mingi, nkombo mpamba ya Mokolo ya Kosambisama ebangisaka bango. Yo okanisaka nini mpo na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia eteyaka ete Mokolo ya Kosambisama ekofungola nzela mpo na ebele ya mapamboli mpo na mabele. Lisolo oyo elimboli likambo yango.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali
“Bato mingi bazalaka na elikya ete soki bakufi bakokende na likoló. Yo mpe osepelaka na elikya yango? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká mbano oyo Biblia elobi ete bato mingi ya malamu bakozwa. [Tángá Nzembo 37:29.] Zulunalo oyo elimboli oyo Biblia elobi mpo na bato oyo bakokende na likoló mpe mosala oyo bakokende kosala kuna.”
Lamuká! Febwali
“Lelo oyo, mabala mingi ezali kokufa. Okanisi ete babalani mingi batalelaka makambo nyonso liboso ya kozwa ekateli ya koboma libala? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Masese 14:15.] Zulunalo oyo elobeli makambo minei oyo mwasi ná mobali basengeli kotalela ntango balingi koboma libala.”