Tómonisa botɔndi mpo na likabo ya Nzambe oyo eleki monene
1. Mpo na nini tozalaka mpenza na botɔndi epai ya Yehova?
1 Na ‘makabo nyonso ya malamu’ oyo euti na Yehova, lisiko ya Mwana na ye ya bolingo nde likabo eleki monene. (Yak. 1:17) Yango efungoli nzela na ebele ya mapamboli, kati na yango, kolimbisama ya masumu na biso. (Ef. 1:7) Tozalaka ntango nyonso na botɔndi mpo na likabo yango. Na eleko ya Ekaniseli, tozwaka mpenza ntango ya komanyola likoló ya likabo yango ya motuya mingi.
2. Ndenge nini tokoki kosalisa libota na biso emonisa botɔndi mpo na lisiko?
2 Salisá libota na yo emonisa botɔndi: Mpo na kosalisa libota na yo emonisa botɔndi mpo na lisiko, na bapɔsɔ oyo ezali liboso ya Ekaniseli oyo ekosalema mokolo ya 30 Marsi, ekozala malamu bósalela mokolo oyo bosalaka Losambo na kati ya libota mpo na koyekola makambo etali lisiko. Lisusu, libota mobimba bokoki kolanda programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli. Kanisá matomba oyo lisiko ememeli yo mpe ndenge oyo yango ebongoli lolenge na yo ya kotalela Yehova, ya komitalela yo moko, ya kotalela basusu, mpe ya kotalela avenire. Ekozala mpe malamu bóyekola nzembo mibale ya sika oyo ekoyembama na Ekaniseli, soki bozwi buku ya sika ya nzembo.—Nz. 77:12.
3. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso?
3 Ndenge ya komonisa botɔndi: Botɔndi mpo na lisiko etindaka biso tóyebisa basusu makambo etali Yehova mpe bolingo monene oyo amonisaki na ndenge atindaki Mwana na ye. (Nz. 145:2-7) Na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai, mabota mosusu emonisaka botɔndi na bango na ndenge bazwaka bibongiseli mpo ete moto ata moko na libota asala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Soki likoki ezali te ya kozala mobongisi-nzela, okoki nde ‘komisombela ntango’ mpo osakola mingi? (Ef. 5:16) Botɔndi ekotinda biso mpe tósalisa basusu mpo báyangana na Ekaniseli elongo na biso. (Em. 22:17) Liboso, salá liste ya bato oyo okobengisa na Ekaniseli; ekoki kozala bato oyo basepelaki na nsango malamu, bato oyo oyekolaka na bango Biblia, bandeko na yo, baninga ya mosala, mpe baninga ya kartye. Na nsima, bimáká mingi na boumeli ya kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli.
4. Makambo nini ya malamu tokoki kosala na eleko ya Ekaniseli?
4 Eleko ya Ekaniseli epesaka biso mabaku mosusu ya komonisa Yehova ete tozalaka na botɔndi mingi mpo na likabo oyo apesá bato. Tiká tósalela ntango yango mpo na kobakisa mpe komonisa botɔndi na biso mpo na lisiko mpe “bomɛngo [nyonso] ya Kristo oyo ekoki komekama te.”—Ef. 3:8.