Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/14 lok. 2
  • Okosalela libaku yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okosalela libaku yango?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Tómonisa botɔndi mpo na likabo ya Nzambe oyo eleki monene
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Tómonisa botɔndi na biso Ekaniseli ekosalema mokolo ya 17 Aprili
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 3/14 lok. 2

Okosalela libaku yango?

Ekaniseli ya mbula oyo ekopesa biso libaku ya komonisa botɔndi

1. Libaku nini ya malamu Ekaniseli ekopesa biso?

1 Ekaniseli oyo ekosalema mokolo ya 14/04/2014 ekopesa biso libaku ya komonisa botɔndi mpo na bolamu ya Yehova. Lisolo oyo ezali na Luka 17:11-18 emonisi ete Yehova ná Yesu balingaka ete tómonisaka botɔndi. Likambo ya mawa, na bato zomi oyo babikaki na maladi ya maba, kaka moko nde azongaki mpo na kopesa Yesu matɔndi. Na mikolo ezali koya, likabo ya lisiko ekobikisa mpenza bato na maladi nyonso mpe ekopesa bomoi ya seko! Kozanga ntembe, na ntango yango, mokolo na mokolo tokobanda kotɔnda Yehova mpo na mapamboli ya ndenge wana. Kasi ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na boumeli ya bapɔsɔ oyo ezali koya?

2. Ndenge nini tokoki kozala na botɔndi mpo na lisiko?

2 Zaláká na botɔndi: Mpo tómonisa botɔndi, esengeli kobanda na makanisi. Mpo na kosalisa biso tókóma na botɔndi mingi mpo na lisiko, programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli ekotyama na bisika mingi, na ndakisa na apɛndisi B12 ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi), na kalandriye, mpe na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Ekozala malamu kotalela yango na kati ya libota. Kosala bongo ekobakisa botɔndi na biso mpo na lisiko. Yango ekosala ete tózala na etamboli ya malamu.​—2 Ko. 5:14, 15; 1 Yoa. 4:11.

3. Na ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso na eleko ya Ekaniseli?

3 Monisá botɔndi: Botɔndi emonanaka na misala. (Kol. 3:15) Moto ya maba oyo amonisaki botɔndi asalaki milende ya koluka Yesu mpo na kopesa ye matɔndi. Na ntembe te, alobelaki mpe na esengo nyonso likamwisi yango epai ya bato mosusu. (Luka 6:45) Tiká ete botɔndi mpo na lisiko etinda biso tózala na molende na kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli! Kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to kosakola mingi na eleko ya Ekaniseli ezali lolenge mosusu ya komonisa botɔndi. Na mpokwa ya Ekaniseli, botɔndi oyo euti na motema ekotinda biso tóyamba na esengo mpenza bato oyo tobengaki mpe tózala pene ya koyanola na mituna na bango nyonso.

4. Tokoki kosala nini mpo tóyoka mawa te nsima ya Ekaniseli?

4 Ekaniseli ya mbula oyo ekozala ya nsuka mpo na yo? (1 Ko. 11:26) Toyebi te. Kasi eloko toyebi ezali ete soki eleki, olekisi libaku moko ya ntina ya komonisa botɔndi. Okosalela libaku yango? Tiká ete maloba ya monɔkɔ na biso mpe komanyola ya mitema na biso esepelisa Yehova, oyo apesaki lisiko.​—Nz. 19:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto