Osilá kolakisa moto ndenge ya koyekola Biblia na bokutani ya liboso?
Ntango toyebisaka bato ete tokoki koyekola na bango Biblia, bamosusu balobaka ete bazali na mposa na yango te to mpe bayekolaka Biblia na lingomba na bango. Lokola bato yango bakanisaka ete boyekoli ya Biblia esalemaka kaka ndenge oyo bayebi yango, bayebaka te ete boyekoli yango ekoki kosalisa bango mpe kosepelisa bango. Yango wana, na esika ya koyebisa kaka moto ete okoki koyekola na ye Biblia, ezali malamu ozwa mwa miniti mpo na kolakisa ye ndenge oyo esalemaka, kaka na mbala ya liboso oyo bokutani. Tópesa ndakisa: Kosuka te na koyebisa moto ete oyebi kolamba mpe kolaka ye ete okoyela ye bilei ya kitoko; mekisá ye nde biloko oyo olambi! Talá ndenge okoki kosala yango na miniti moke, na kolanda makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006, lokasa 6:
“Okanisi ete mokolo mosusu maloba oyo ekokokisama? [Tángá Yisaya 33:24, mpe tiká ye apesa eyano.] Tiká nalakisa yo likambo moko oyo ekosepelisa yo.” Pesá ye buku Biblia eteyaka, mpe fungolá na lokasa 36, paragrafe 22. Tángá motuna oyo ezali na nse ya lokasa, mpe sɛngá ye alanda eyano ntango ozali kotánga paragrafe. Na nsima, tuná lisusu motuna yango, mpe yoká eyano na ye. Tángá na ye vɛrsɛ mosusu. Tuná motuna moko oyo okopesa eyano na mbala ya nsima, mpe yokaná na ye mokolo oyo okozonga. Obandi mbala moko boyekoli ya Biblia!