Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/11 lok. 1
  • Litatoli monene ekopesama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litatoli monene ekopesama
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Tóyamba bango!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakoyangana na Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóyamba malamu bato oyo tobengisi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Tóyamba malamu bato na ntango ya Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 4/11 lok. 1

Litatoli monene ekopesama

1. Longola diskur, nini mosusu ekoki kobenda likebi ya bapaya na Ekaniseli? Limbolá.

1 Mokolo nini? Mokolo ya Ekaniseli na mpokwa. Tosili kosala milende mpo na kobenga bato báya koyangana na biso na Ekaniseli. Makambo oyo ekokamwisa bapaya ezali kaka te oyo bakoyoka. Nsima ya koyangana na Ekaniseli, mwasi moko alobelaki makambo oyo amonaki: moto nyonso ayambaki ye na esengo lokola moninga, amonaki mpe ndako kitoko mpe ya pɛto oyo etongamaki mpe ebatelamaki na bandeko oyo bazalaki kosala kozanga ete báfuta bango. Yango wana, biso nyonso, kaka molobi te, tosengeli kosala nyonso mpo litatoli epesama mokolo wana oyo eleki ntina na mbula mobimba.​—Ef. 4:16.

2. Na ndenge nini mokomoko na biso akoki kopesa litatoli epai ya bapaya?

2 Pesá bapaya mbote na esengo: Mbote ya esengo oyo tokopesa bapaya ekopesa litatoli. (Yoa. 13:35) Ata soki okokoka te kosolola na bato nyonso, okoki koyebisa bato oyo bazali pembeni na yo nkombo na yo. (Ebr. 13:1, 2) Luká bapaya oyo bazali komonana lokola bayebi moto te. Ekoki kozala ete bazwaki lokasa ya libyangi na ntango ya kampanye. Okoki kotuna mopaya moko boye: “Ezali mbala na yo ya liboso ya koya awa?” Sɛngá bango báfanda pene na yo mpe yebisá bango ete okosepela koyanola na mituna oyo bakoki kozala na yango. Soki lisangá na bino esengeli kobima nokinoki mpo na kotikela lisangá mosusu esika, okoki koloba boye: “Nakolinga koyeba makambo nini osepelaki na yango na likita oyo. Nakoki kosala nini mpo tókutana lisusu?”

3. Ndenge nini tokoki koyamba bandeko oyo batiká kosakola?

3 Yambá bandeko oyo batiká kosakola: Na ntembe te, bandeko oyo batiká kosakola, ata mpe baoyo bayaka na lisangá kaka mokolo ya Ekaniseli oyo esalemaka mbula na mbula, bakoyangana na biso. Yambá bango mpe yebisá bango ete osepeli komona bango. (Rom. 15:7) Bankulutu bakoki kokende kotala bango na ndako nokinoki nsima ya Ekaniseli mpo na kolendisa bango bázongela koyangana na makita ya lisangá. Tozali kobondela ete bato mingi oyo bakoyangana na Ekaniseli bázwa ekateli ya kokumisa Nzambe, kaka te mpo na makambo oyo bakoyoka, kasi mpe ‘mpo bakomona na miso na bango misala na biso ya malamu.’​—1 Pe. 2:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto