Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/13 lok. 2
  • Tóyamba bango!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyamba bango!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Litatoli monene ekopesama
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Tóyamba malamu bato oyo tobengisi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakoyangana na Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóyamba malamu bato na ntango ya Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 3/13 lok. 2

Tóyamba bango!

1. Libaku nini ya malamu koleka tozalaka na yango ya kopesa litatoli, mpe mpo na nini?

1 Mbula na mbula, Ekaniseli epesaka biso libaku malamu koleka ya kopesa litatoli. Tótalela naino: Na mbula oyo, tozali na elikya ete bapaya koleka milio zomi bakoyangana na Ekaniseli elongo na biso, mpo na koyoka ndenge oyo Yehova mpe Yesu Kristo bamonisaki bolingo monene na nzela ya lisiko. (Yoa. 3:16; 15:13) Bapaya yango bakoyeba mapamboli oyo likabo wana ya Yehova ekomemela bato. (Yis. 65:21-23) Nzokande, kaka ndeko oyo akosala diskur te nde akopesa litatoli na libaku wana. Biso nyonso oyo tokoyangana wana tokopesa litatoli soki toyambi na esengo bapaya oyo bakoya.​—Rom. 15:7.

2. Ndenge nini tokoki koyamba bapaya na esengo nyonso?

2 Na esika ya koya mpe kofanda kimya mpo na kozela likita yango ebanda, mpo na nini te kokende epai ya bapaya mpe kosolola na bango? Bapaya bakoki kozala motema likoló mpe koyeba te ndenge makambo ekoleka. Kosɛka mwa moke mpe kopesa bango mbote na ndenge ya boninga, ekosalisa bango bámiyoka malamu. Mpo tóyeba soki moto moko ayei mpo azwaki lokasa ya libyangi, tokoki kotuna ye soki ezali mbala na ye ya liboso ya koyangana na makita na biso, to soki ayebi ndeko moko ya lisangá. Ntango mosusu, okoki kosɛnga ye afanda pene na yo mpo bósalela elongo Biblia mpe buku na yo ya nzembo. Soki bandeko mosusu bazali naino kosalela Ndako ya Bokonzi, okoki kotambwisa ye mwa moke na lopango. Na nsuka, sololá na ye mpo na kopesa ye biyano na mituna oyo akoki kozala na yango. Soki lisangá na bino esengeli kotika nokinoki Ndako ya Bokonzi mpo basusu básalela, okoki koloba boye: “Nakosepela koyoka makanisi na yo mpo na likita oyo. Ndenge nini tokoki kokutana lisusu?” Na nsima, zwá bibongiseli mpo bókutana mokolo mosusu. Bankulutu basengeli mpenza kotya likebi na bandeko oyo batiká kosakola, oyo bakoyangana, mpo bálendisa bango.

3. Mpo na nini ezali na ntina tóyamba bapaya oyo bakoya na Ekaniseli?

3 Mpo na bapaya mingi ekozala mbala na bango ya liboso ya komona esengo, kimya mpe bomoko oyo biso basaleli ya Yehova tozalaka na yango na paradiso na biso ya elimo. (Nz. 29:11; Yis. 11:6-9; 65:13, 14) Makambo nini bapaya bakozonga na yango? Mingi ekotalela ndenge oyo tokoyamba bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto