Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Mars lok. 2
  • Tóyamba malamu bato oyo tobengisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyamba malamu bato oyo tobengisi
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Tóyamba bango!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Litatoli monene ekopesama
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakoyangana na Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóyamba malamu bato na ntango ya Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Mars lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Tóyamba malamu bato oyo tobengisi

Na mwa 23/03/2016, tozali na elikya ete bamilio 12 ya bato to koleka bakoyangana elongo na biso na Ekaniseli. Bakozwa mpenza litatoli moko ya kafukafu ntango molobi akolobela lisiko, likabo oyo Yehova apesá biso, mpe mapamboli oyo yango ekomemela bato na mikolo ezali koya! (Yis 11:6-9; 35:5, 6; 65:21-23; Yn 3:16) Nzokande, kaka molobi te nde akopesa litatoli na likita wana ya ntina mingi. Biso nyonso tokoki kopesa litatoli soki tozali koyamba malamu bato oyo tobengisi. (Ro 15:7) Talá mwa makambo tokoki kosala.

Motatoli ya Yehova moko azali koyamba malamu moto moko oyo ayei na Ekaniseli; motatoli ya Yehova moko azali kosalela Biblia na ye elongo na bato oyo bayei na Ekaniseli
  • Na esika okende kofanda mpe ozela tii ntango programɛ ekobanda, yambá na mwa komungamunga bato oyo tobengisi ná bandeko oyo batiká kosakola, mpe pesá bango mbote na esengo mpenza

  • Wana ozali kotya likebi mingi epai ya bato oyo obengisaki, tyá mpe likebi epai ya bato mosusu oyo, mbala mosusu, bazali wana mpo bazwaki lokasa ya libyangi na kampanye. Sɛngá bango báfanda elongo na yo. Salelá Biblia mpe buku na yo ya nzembo elongo na bango

  • Nsima ya diskur, tikalá mwa moke mpo na koyanola na mituna. Soki ntango ezali mingi te mpo lisangá na bino esengeli kotikela lisangá mosusu esika, zwá bibongiseli mpo na kozongela moto oyo osololi na ye nsima ya mikolo moke. Soki ozali na adrɛsi to nimero ya telefone na ye te, okoki koloba boye: “Nakosepela koyeba likanisi na yo mpo na programɛ oyo. Ndenge nini tokoki kokutana?”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto