Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Sɛtɛmbɛ
“Bato ya bikólo ndenge na ndenge mpe ya mangomba ndenge na ndenge babondelaka mikolo nyonso. Okanisi ete Nzambe ayokaka mabondeli wana nyonso mpe ayanolaka na yango?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ, mpe bótalela elongo makambo oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya moke ya liboso na lokasa 16 mpe bótánga vɛrsɛ moko kati na oyo batye wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛtɛmbɛ
Lakisá lokasa ya liboso ya zulunalo yango mpe lobá boye: “Eyano nini okopesa na motuna oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi. [Tángá 1 Yoane 5:19.] Na kolanda vɛrsɛ oyo, “moto mabe” to Zabolo nde azali koyangela mokili. Kasi yango ebimisi mituna oyo: Zabolo autá wapi? Azali mpenza moto ya solo? Tii ntango nini Nzambe akotika ye akoba koyangela? Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi na likambo yango.”
Lamuká! Sɛtɛmbɛ
“Bato mingi lelo oyo bazali komitungisa mingi mpo na mbongo. Mpo na yo, mpo na nini ezalaka mpasi kozwa mbongo ya kobikela? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali na batoli ya bwanya oyo esalisá bato mingi báyeba kosalela mbongo na bango malamu. [Tángá moko ya bavɛrsɛ oyo ezali na nkasa 8 mpe 9.] Zulunalo oyo ezali kopesa batoli oyo ekosalisa baoyo bazali na banyongo.”