Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya Sɛtɛmbɛ
“Bato mingi bayebaka ete mokolo mosusu Nzambe akosambisa bango na kotalela misala na bango. Okanisi ete tosengeli kozela mokolo ya kosambisama na esengo to kobanga yango? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge zulunalo oyo elobi.” Pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16 mpe bótanga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Tikelá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo alandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛtɛmbɛ
“Na bisika mingi na mokili bato banyokolaka basi mpe basalelaka bango makambo makasimakasi. Likambo ya mawa, bindimeli ya mangomba mosusu mpe emonisaka bongo. Okanisi ete Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na basi? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ndenge Biblia eteyi mibali básalaka mpo na basi na bango. [Tángá Baefese 5:28, 29.] Na zulunalo oyo, okokuta makanisi ya Biblia oyo emonisi ndenge Nzambe atalelaka basi.”
Lamuká! Sɛtɛmbɛ
“Bato mingi balobaka ete mokolo mosusu bomoi ekosuka awa na mabele, ntango mosusu na etumba moko ya nikleere to na likama moko boye, na ndakisa eloko moko ekouta likoló etuti mabele to molunge ekoleka makasi. Okanisi ete koloba bongo ezali solo, to ezali masapo mpamba? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia epesi elaka oyo ya kobɔndisa. [Tángá Nzembo 37:29.] Zulunalo oyo elobeli makanisi mosusu ya bato na oyo etali nsuka ya mokili mpe makambo ya malamu oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya.”