Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/11 lok. 1
  • Tózongelaka bato oyo basepelaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózongelaka bato oyo basepelaki
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tókomaka makambo etali bato oyo basepeli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobongisa nzela mpo na kozongela moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Ntango nini tosengeli kozongela bato oyo basepelaki?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 11/11 lok. 1

Tózongelaka bato oyo basepelaki

1. Nini tosengeli kosopelaka mai mpo ekola?

1 Mpo mbuma oyo baloni na elanga ekola, esengeli kosopelaka yango mai. Ezali mpe bongo mpo na mboto ya solo oyo tozali kolona na mitema ya bato ya teritware na biso. (1 Ko. 3:6) Tosengeli kozongelaka bato oyo basepelaki mpe kosopelaka mboto yango ya elilingi mai, elingi koloba kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bango bákola na boyebi ya solo.

2. Ndenge nini tokoki kofungola nzela mpo na lisolo mosusu mbala ya nsima?

2 Tuná motuna: Ntango ozali kobongisa maloba ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola, mpo na nini te kobongisa mpe motuna moko oyo ekobenda likebi ya moto, oyo okopesa eyano na yango na mbala ya nsima? Tuná motuna yango na nsuka ya lisolo mpe yokaná libela na moto yango mpo na kozongela ye. Bandeko mingi bamonaka malamu kopona lisolo moko na buku Biblia eteyaka, oyo ekosalisa bango bálakisa bato ndenge ya koyekola Biblia.

3. Makambo nini okoki kokoma mpo na moto oyo osololi na ye?

3 Komá mwa makambo: Ntango kaka obimi na lopango ya moto, zwá ntango ya kokoma mwa makambo oyo etali moto yango. Komá nkombo na ye mpe adrɛsi na ye. Ezali mpe malamu kokoma mokolo mpe ngonga oyo bosololi na ye, likambo oyo bolobeli, mpe mokanda oyo otikeli ye. Moto yango alobaki ete asambelaka na lingomba moko? Azali na molongani mpe bana? Ayebisaki yo makambo oyo asepelaka na yango mpe oyo etungisaka ye? Makambo wana ekosalisa yo oyeba masolo oyo ezali na ntina mpo na ye ntango okozongela ye. Longolá yango, komá mokolo mpe ngonga oyo ondimi kozongela ye, mpe motuna oyo okoyanola ntango okozongela ye.

4. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kozongela bato oyo basepelaki?

4 Kolɛmba te: Satana akotika te kosala milende mpo na ‘kolongola liloba’ oyo elonami na motema ya moto. (Mrk. 4:14, 15) Yango wana, kolɛmba te soki ozali kokuta lisusu na ndako te moto oyo asepelaki. Okoki kotindela ye mokanda to kokɔtisa mwa nkoma na nse ya porte na ye. Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela abandaki koyekola Biblia na mwasi moko liboso ya porte na ye, kasi na nsima azalaki lisusu kokuta ye na ndako te; yango wana akomelaki ye mokanda. Nsukansuka, ntango ndeko mwasi yango akutaki ye na ndako, mwasi yango alobaki ete lolenge oyo ndeko yango atyelaki ye likebi esimbaki mpenza motema na ye. Soki tozali kosopela mboto ya solo mai, tokoyoka esengo ya komona ndenge mboto yango ezali kokola, tii ekokɔmɛla mpe ‘ekobota mbuma mbala ntuku misato mpe ntuku motoba mpe nkama moko.’​—Mrk. 4:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto