Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/15 lok. 2
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • Kosalela Internet​—Kebá na makama!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Salá yango kozanga koumela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 7/15 lok. 2

Biyano na mituna na bino

◼ Basakoli basengeli nde kosalela mingi Internet mpo na kopesa litatoli to koyekola Biblia na bapaya oyo bafandi na mboka mosusu?

Basakoli mosusu basalelaki Internet mpo na kozwa bato ya koyekola na bango Biblia na bamboka oyo mosala na biso epekisami to epai basakoli bazali mingi te. Na bisika mosusu, matomba emonanaki. Nzokande, makama ezalaka ntango basakoli batindelanaka bamesaje to basololaka na bapaya na nzela ya Internet. (Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya nsambo 2007, lok. 3.) Atako mokano ezali ya koyebisa bato ya mitema sembo nsango ya Bokonzi, masolo ya bongo ekoki kosala ete ndeko mobali to ndeko mwasi asala boninga na bato ya mabe, ata mpe na bapɛngwi. (1 Ko. 1:19-25; Kol. 2:8) Lisusu, na mikili oyo mosala ya kosakola epekisami, bakonzi ya mboka bakoki kolandela bamesaje. Yango ekoki kotya bandeko na biso na likama. Na yango, basakoli basengeli te kosalela Internet mpo na koluka bato na mboka mosusu mpo na kosakwela bango nsango malamu.

Soki topesi mopaya oyo auti na mboka mosusu litatoli ya libaku malamu, tosengeli te koluka kokolisa mposa na ye nsima wana azongi na ekólo na bango, longola kaka soki biro ya filiale epesi biso malako mosusu. Tosengeli nde kolakisa ye ndenge ya kosalela jw.org mpo ayeba makambo mosusu to ndenge oyo akoki kosolola na biro ya filiale na esika afandaka. Tokoki mpe kolendisa ye aluka Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika afandaka. Ya solo, na bamboka mosusu Ndako ya Bokonzi ezalaka te. Soki asepeli ete Batatoli ya esika azali báya kotala ye, tosengeli kotondisa formilɛrɛ Veillez suivre l’intérêt (S-43) mpe kopesa yango na sɛkrɛtɛrɛ, oyo akotinda yango na jw.org. Biro ya filiale oyo ezali kotambwisa mosala na mboka oyo moto oyo asepelaki azali nde eyebi malamu makambo oyo ezali koleka kuna mpe ekoyeba mpenza kopesa lisalisi ya elimo.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya motoba 2014, lok. 7, mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya zomi na moko 2011, lok. 2.

Soki moto oyo tozongelaka akei na ekólo mosusu to soki tozali koyekola na moto ya mboka mosusu Biblia, oyo toyebi ye kaka na nzela ya Internet, tosengeli kolanda malako oyo emonisami awa likoló. Kasi, tokoki kokoba kokolisa mposa na ye tii basakoli ya esika azali bakokutana na ye. Nzokande, soki afandaka na mboka oyo mosala na biso epekisami, esengeli mpenza kozala na bokɛngi ntango tozali kosolola makambo ya Biblia na nzela ya mokanda, telefone, ordinatɛrɛ to aparɛyi mosusu.​—Mat. 10:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto