Omibongisa sikoyo mpo osakola lisusu mingi
1. Mabaku nini tozalaka na yango na eleko ya Ekaniseli, mpe ndenge nini tokoki komibongisa mpo na yango?
1 Mbula na mbula, eleko ya Ekaniseli epesaka biso mabaku ya ‘kokumisa Yehova mingi.’ (Nz. 109:30) Okosakola mingi koleka na sanza ya Marsi mpo na komonisa botondi na yo epai ya Nzambe, Moto oyo apesaki lisiko? Sikoyo nde ntango ya kobanda komibongisa.—Mas. 21:5.
2. Yo moko mpe bandeko mosusu boyokaki ndenge nini ntango bayebisaki ebongiseli ya sika etali babongisi-nzela basungi na Aprili ya mbula eleki?
2 Mosala ya mobongisi-nzela mosungi: Na mbula eleki, bandeko basepelaki mingi ntango bayokaki ete na sanza ya Aprili, bakoki kopona kosala ngonga 30 to 50 na mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ndeko mobali moko akomaki boye: “Nazali naino kotánga na eteyelo ya ntei, mpe ezali mpasi nasala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi na sanza ya Aprili, nakopona mosala ya mobongisi-nzela ya ngonga 30 mpe nakosala makasi nakokisa ngonga 50.” Ndeko mwasi moko oyo akendaka mosala mikolo nyonso akomaki boye: “Ngonga 30, ezali pɛtɛɛ!” Ntango ndeko moko ya mbula koleka 80, oyo kala azalaki mobongisi-nzela ayokaki ebongiseli yango, alobaki boye: “Oyo nde likambo nazalaki kozela banda kala! Yehova ayebi ete mosala ya mobongisi-nzela ememelaki ngai esengo mingi na bomoi!” Bandeko mosusu oyo bakokaki te kosala lokola babongisi-nzela basungi, bamityelaki mokano ya kosakola mingi koleka.
3. Mpo na nini tosengeli kotalela soki tokoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, Aprili mpe Mai?
3 Na mbula oyo, sanza ya Marsi ekozala sanza moko malamu mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpamba te na mbala oyo mpe tokoki kopona kosala ngonga 30 to 50. Lisusu, kobanda mokolo ya pɔsɔ mwa 17 Marsi, tokosala kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli oyo ekosalema mwa 5 Aprili. Na ntembe te, esengo oyo bandeko mingi bakoyoka mpo basakoli mingi, ekotinda bango básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ya ngonga 50 na sanza ya Aprili mpe ya Mai.
4. Ndenge nini tokoki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola, mpe matomba nini tokozwa?
4 Na Losambo na bino na libota ya mbala ekoya, ekozala malamu bólobela ndenge oyo mokomoko na bino akoki kosakola lisusu mingi na eleko ya Ekaniseli. (Mas. 15:22) Sɛngá Yehova apambola milende oyo okosala. (1 Yoa. 3:22) Soki ozali kosala mingi na mosala ya kosakola, okokumisa Yehova mingi mpe okokóma na esengo mingi koleka.—2 Ko. 9:6.