Salá ete eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo ezala eleko ya esengo!
1. Wapi lolenge moko ya kobakisa esengo na biso na eleko ya Ekaniseli?
1 Okosepela kobakisa esengo na yo na sanza ya misato, ya minei mpe ya mitano? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kosakola mingi mpe soki likoki ezali, kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ndenge nini yango ekobakisa esengo na yo?
2. Na ndenge nini kosakola mingi ekobakisa esengo na biso?
2 Bakisá esengo na yo: Yehova akelá biso mpo tósambelaka ye na esengo mpe tókokisaka bamposa na biso ya elimo oyo tobotamaka na yango. (Mat. 5:3) Akelá mpe biso mpo tózwaka esengo oyo eutaka na kokabela basusu. (Mis. 20:35) Mosala ya kosakola epesaka biso libaku ya kosambela Nzambe mpe ya kosalisa basusu. Yango wana, soki tozali kosakola mingi, esengo na biso ekobakisama mpenza. Lisusu, ntango tozali kosakola mingi, tokokóma mpe na makoki mingi na mosala yango. Lokola tokokóma na makoki mingi, kondima na biso ekokóma mpenza makasi mpe tokolongola kobanga. Tokozala na mabaku mingi ya kopesa litatoli mpe kobanda koyekola na bato Biblia. Makambo wana nyonso ekosala ete tósepela lisusu mingi na mosala ya kosakola.
3. Mpo na nini sanza ya misato mpe ya minei ekozala basanza oyo ebongi mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?
3 Sanza ya misato mpe ya minei ekozala mpenza basanza ya malamu mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo tokoki kopona kosala ngonga 30 to ngonga 50. Lisusu, kobanda na mokolo ya pɔsɔ mwa 22 sanza ya misato tii na mokolo ya yambo 14 sanza ya minei oyo Ekaniseli ekosalema, tokosala kampanye moko ya esengo mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Lokola basakoli mingi bakosala na “bomoko” mpo na kokabola lokasa ya libyangi epai ya bato mingi, soki likoki ezali, na teritware na bango mobimba na ntango oyo etyami, masangá ekozala na esengo mingi.—Sef. 3:9.
4. Soki olingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, osengeli kosala nini?
4 Omibongisa banda sikoyo: Soki osali naino yango te, zwá ntango ya kotalela programɛ na yo mpo oyeba makambo oyo okoki kobongola mpo osakola mingi na basanza yango nyonso to na moko na yango. Bondelá mpo na yango. (Yak. 1:5) Bósolola likambo yango na libota mpe na bandeko mosusu ya lisangá. (Mas. 15:22) Ntango mosusu, okomona ete yo mpe okoki koyoka esengo oyo eutaka na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi atako ozali na mikakatano na nzoto to ozali na makambo mingi ya kosala.
5. Matomba nini tokozwa soki tosakoli mingi na eleko ya Ekaniseli?
5 Yehova alingaka ete basaleli na ye bázala na esengo. (Nz. 32:11) Soki tosali nyonso mpo tósakola mingi na eleko ya Ekaniseli, tokobakisa esengo na biso mpe tokosepelisa motema ya Tata na biso ya likoló.—Mas. 23:24; 27:11.