Etamboli oyo epesaka Nzambe nkembo
1. Mpo na nini ezalaka mpasi te bato báyeba ete Batatoli ya Yehova bazali na liyangani ya etúká?
1 Ntango tosalaka mayangani ya etúká, ezalaka mpasi te bato báyeba ete tozali na liyangani. Na bingumba mingi epai mayangani ya etúká esalemaka, nsango etambolaka ete liyangani ekozala mpe bato ya esika yango bamonaka ebele ya bapaya oyo balati bamakarɔ. Makambo oyo elandi, oyo tosengeli kobosana te, ekosalisa biso tópesa Nzambe nkembo na etamboli na biso na engumba oyo liyangani ekosalema.—1 Pe. 2:12.
2. Ndenge nini tokoki kopesa Nzambe nkembo na molato na biso oyo ebongi na engumba oyo liyangani ekosalema?
2 Molato oyo ebongi: Mbala mingi, molato na biso oyo eleki ndelo te ntango tokei na liyangani, esepelisaka bato oyo batalaka biso. Kasi, ndenge oyo tolataka na bangonga mosusu, ntango tokei kolya na restora, kosomba biloko mpe bongo na bongo, ekoki kotinda bato bátalela biso na ndenge ya malamu to ya mabe. Atako tokolata te lokola na liyangani, bilamba oyo tolati esengeli kozala oyo ebongi, ya lokumu mpe ya bongobongo te. Bato oyo bazali kotala biso basengeli komona bokeseni kati na biso mpe bato oyo bazali Batatoli te. (Rom. 12:2) Lisusu, tosengeli kolata makarɔ na biso ya liyangani, mpo yango ekomonisa ete liyangani ezali, ekoki kobimisa mabaku ya kopesa litatoli mpe kosalisa bandeko mosusu báyeba biso.
3. Ndenge nini tokoki komonisa motema molai mpe bokonde?
3 Motema molai mpe bokonde: Na eleko oyo bato mingi na mokili balukaka kaka matomba na bango moko mpe bazangi botɔndi, ekozala mpenza esengo mpo na bato oyo bazali kotala biso, na ndakisa basali ya otɛlɛ mpe ya restora, bámona motema molai mpe bokonde na biso! (2 Tim. 3:1-5) Ntango tozali kokanga bisika ya kofanda to tozali na molɔngɔ mpo na kozwa mikanda oyo ebimi sika, tosengeli koluka kaka matomba na biso moko te, kasi mpe oyo ya moto mosusu. (1 Ko. 10:23, 24) Mobali moko oyo ayanganaki mpo na mbala ya liboso na liyangani ya etúká asepelaki mpe alobaki boye: “Nayebaka lisusu ata diskur moko te oyo esalemaki mokolo yango, kasi bizaleli ya Batatoli ya Yehova etikalá mpenza na makanisi na ngai.”
4. Mpo na nini tosengeli kotalela soki tokoki komipesa na bolingo na biso moko mpo na kosala misala na liyangani?
4 Komipesa na bolingo na biso moko: Eyebani ete bakristo ya solo bamipesaka na bolingo na bango moko. (Nz. 110:3) Yo mpe okoki komipesa na bolingo na yo moko mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani? Na liyangani moko ya etúká, bandeko mibali mpe basi pene na 600 bamipesaki mpo na kotya bopɛto liboso liyangani esalema. Etuluku moko ya basali balobaki ete: “Naino tomoná likambo ya boye te! Okondima te ete bato nyonso oyo basali mosala yango kozanga kozwa lifuti.” Tozali kozela na esengo liyangani ya etúká 2013 oyo ekopesa biso libaku ya koyoka mpe koyekola mateya ya Nzambe, mpe kopesa ye nkembo.