Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/14 nk. 3-4
  • “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Etamboli oyo epesaka Nzambe nkembo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Mikolo misato oyo tokolendisama na elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 4/14 nk. 3-4

“Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo”

1. Mpo na nini ezali na ntina tózala na etamboli malamu ntango tokokende na liyangani?

1 Na mayangani oyo tosalaka mbula na mbula, tobendaka likebi ya bato; na yango ezali na ntina ete tómonisa mpenza na etamboli na biso ete tozali basaleli ya Nzambe. (Lev. 20:26) Bizaleli na biso ya malamu, molato na biso mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli komonisa ete tozali bayekoli ya solo ya Kristo. Ntango tokokende na liyangani ya etúká to na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi, ndenge nini tokoki ‘kozala na etamboli malamu na kati ya bikólo’ mpo tópesa Tata na biso ya likoló nkembo?​—1 Pe. 2:12.

2. Na bisika nini tokoki komonisa bizaleli ya bakristo ntango tokei na liyangani?

2 Tómonisa bizaleli ya bakristo: Bolingo oyo tomoniselanaka mpe bizaleli malamu oyo tomoniselaka ‘bato ya libándá’ ekeseni mpenza na bizaleli ya bato ya mokili. (Kol. 3:10; 4:5; 2 Tim. 3:1-5) Tosengeli kozala na boboto mpe na motema molai epai ya bato oyo basalaka na otɛlɛ to na restora, ata soki mokakatano ebimi. Soki esɛngaka kotikela bato yango mwa mbongo mpo na mosala oyo basaleli biso, tóbosana te kosala yango.

3. Makambo nini baboti basengeli kobosana te, mpe mpo na nini?

3 Baboti basengeli kobatela malamumalamu bana na bango, ezala na esika ya liyangani, na restora to na otɛlɛ. (Mas. 29:15) Mokambi ya otɛlɛ moko alobaki na Motatoli moko ná mwasi na ye ete: “Tosepelaka na bino mingi. Bino moko ná bana na bino bozalaka na bizaleli malamu mpe na bonkonde. Basali na biso nyonso bazalaki koloba malamu mpo na bino; kutu mposa na biso ezali ete bóyaka awa nsuka ya pɔsɔ nyonso.”

4. Na engumba oyo liyangani ekosalema, ndenge nini tokolata mpe tokobongisa nzoto?

4 Molato oyo ebongi: Molato na biso na ntango ya liyangani esengeli kozala oyo ebongi mpe ya kolekisa ndelo te, kasi te lokola oyo ya bato ya mokili. (1 Tim. 2:9) Ata mokolo oyo toyei na otɛlɛ to mokolo oyo tokobima mpe ntango tozali kozwa mopɛpɛ liboso to nsima ya liyangani, tosengeli kolata malamu mpe kobongisa nzoto na ndenge ebongi. Yango ekosala ete tóyoka nsɔni te kolata makarɔ na biso ya liyangani mpe tópesa litatoli soki libaku emonani. Ndenge oyo tokomonana na miso ya bato mpe etamboli na biso ya malamu na liyangani ya mobu 2014 ekobenda likebi ya bato ya mitema sembo na nsango ya Biblia oyo ebikisaka mpe ekosepelisa Yehova.​—Sef. 3:17.

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya mobu 2014

◼ Manaka: Mikolo nyonso misato programɛ ekobanda na ngonga ya 8:20 na ntɔngɔ. Kasi, na bingumba ya minene lokola: Bandundu-Ville, Boma, Brazzaville, Bumba, Goma, Kananga, Kikwit, Kinshasa, Kisangani, Kolwezi, Likasi, Lodja, Lubumbashi, Matadi, Mbandaka, Mbuji Mayi, Mwene Ditu, Pointe Noire mpe Tshikapa, programɛ ekobanda mikolo nyonso na ngonga ya 9:20 na ntɔngɔ. Baporte ya esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 7:00 na ntɔngɔ na bisika oyo liyangani ekobanda na 8:20, mpe na 8:00 na ntɔngɔ, na bisika oyo ekobanda na 9:20. Ntango prezida ya liyangani ayebisi ete miziki elingi kobanda, biso nyonso tosengeli kozwa bisika ya kofanda mpo programɛ ebanda na ndenge ebongi. Mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, liyangani ekosuka na ngonga ya 15:55, mpe mokolo ya lomingo ekosuka na ngonga ya 14:40. Na bingumba oyo totángi awa likoló ekosuka ngonga moko na nsima.

◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na bato ya ndako na biso, to baoyo toyei na bango motuka moko, to mpe baoyo toyekolaka na bango Biblia.

◼ Bilei ya midi: Tolendisi bino bómema bilei ya pɛpɛlɛ kasi oyo etongaka nzoto, na ndakisa mampa, bitabe, nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, kafe, tii, to masanga ya sukali na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ebimisa likama te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso moko ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, tokobima kosomba yango epai ya batɛkisi te. Koboya kosomba biloko epai ya batɛkisi ya libándá ekomonisa mpenza ete tozali pɛto. (Liyebisi: Batɛkisi ya biloko ya kolya basengeli te kokɔta na esika ya liyangani ata na ngonga nini.​—Yoa. 2:13-17).

◼ Bopɛto: Mbala mingi, emonanaka ete baoyo basombaka biloko ya kolya libándá babwakaka nkasa to sashɛ na mabele. Yango wana, esika ya liyangani etondaka na bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi mpe biloko mosusu. Soki moto moko amoni malamu asomba biloko ya kolya libándá, asengeli kobwaka nkasa to sashɛ na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na mabele te. Soki tomoni papye to sashɛ na mabele, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tobondeli bino ete biso nyonso tósala mpenza milende mpo na kobatela esika na biso ya liyangani pɛto, ezala na kati to na libándá. Moto nyonso oyo azali na liyangani asengeli koyeba ete bopɛto ezali na ntina mingi. Soki moto nyonso apesi mabɔkɔ, esika ya liyangani ekobanda kotikala pɛto mikolo nyonso. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.​—1 Pe. 1:15, 16; Kob. 19:10; Mib. 23:14.

◼ Makabo: Tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na nyonso oyo esalemi mpo na kobongisa liyangani soki topesi makabo ya bolingo malamu mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na esika ya liyangani. Soki moto alingi kopesa likabo na nzela ya chèque, akokoma yango na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’”

◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Soki moto moko abɛli na mbalakaka to azwi likama na esika ya liyangani, esengeli naino koyebisa moko ya bandeko oyo bazali kopesa bisika ya kofanda; ye akoyebisa mbala moko bandeko ya Departema ya lisalisi ya nokinoki mpo bátala soki moto yango azali na maladi ya ndenge nini mpe ndenge oyo bakoki kosalisa ye.

◼ Bankisi: Soki omɛlaka nkisi oyo monganga akomelá yo, kobosana te komema oyo osengeli na yango, mpamba te nkisi yango ekozala te na esika ya liyangani. Esengeli kobwaka bantonga ya bato oyo babɛlaka maladi ya diabɛti mpe bantonga nyonso mosusu na esika oyo ebongisami mpo na yango, kasi te na bisika ya kobwaka bosɔtɔ na liyangani, mpamba te ekoki kobimisa likama.

◼ Kokanga bafɔtɔ: Soki bolingi kokanga bafɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, bósalela mwinda (flash) ya aparɛyi te. Tosɛngi bino bóbengisa te na esika ya liyangani bato oyo basalaka mombongo ya kokanga bafɔtɔ. Soki bomoni bango na esika ya liyangani bazali koluka bakiliya, bókangisa bafɔtɔ epai na bango te.​—Yoa. 2:13-17.

◼ Formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43): Mbala nyonso oyo tokutani na moto oyo asepeli na nsango malamu ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu na liyangani, tosengeli kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43). Bokoki kopesa baformilɛrɛ oyo botondisi na Departema oyo etalelaka mikanda na liyangani to na sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá na bino.

◼ Na restora: Kumisá Yehova na etamboli na yo ya malamu na restora. Latá na ndenge oyo ebongi na ministre mokristo. Tikelá mosali ya restora mwa mbongo mpo na mosala na ye, soki esalemaka bongo.

◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Tosɛngi bino bótosa motángo ya bato oyo nkolo-ndako ayebisi mpo na shambre moko. (2) Soki omoni ete okofanda lisusu te na esika oyo osɛngaki, yebisá yango nokinoki. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino nkolo-ndako to bandeko oyo bazali kopesa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi nini okoki kosala mpo makambo nyonso eleka malamu. (4) Salelá malamu eloko nyonso oyo bapesi bapaya ndingisa ya kosalela. Esengeli kosala makambo nyonso na bokatikati. (5) Esika na yo ya kolala ezalaka ntango nyonso pɛto mpe na molɔngɔ. Yango etali mpe Ndako ya Bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo ntango ozali elongo na basusu, ezala ndeko oyo ayambi yo na ndako na ye to bandeko mosusu oyo ozali kolala esika moko na bango.​—Gal. 5:22, 23.

◼ Basali ya bolingo malamu: Ndeko nyonso oyo alingi kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani asengeli kokende na Departema ya basali ya bolingo malamu. Mwana oyo akokisi naino mbula 16 te akoki mpe kopesa mabɔkɔ soki azali kosala elongo na moboti na ye to na ndeko mosusu oyo azali kokɛngɛla ye, to mpe na mokóló moko oyo moboti ya mwana andimi ete akokɛngɛla ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto