Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 15 ƆKƆTƆBƐ
Loyembo 101 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 18 par. 12-18 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Danyele 10-12 (Min. 10)
No. 1: Danyele 11:15-27 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini bakristo bazongisaka mabe te?—Rom. 12:18-21 (Min. 5)
No. 3: Basaleli ya sembo ya Nzambe bapalangani kati na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba?—rs lok. 164 par. 2-4 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Soki moto alobi: ‘Nasepelaka na yango te.’ Lisolo na bayangani ekouta na buku Ndenge ya kosolola, lokasa 16, paragrafe 1, tii na lokasa 17, paragrafe 10. Lobelá ndambo ya biyano oyo ezali na buku mpe biyano mosusu oyo ebimisaki matomba na teritware na bino. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo epesami na lisolo yango.
Min. 20: “Salelá batrakte mpo na kopalanganisa nsango malamu.” Mituna mpe biyano. Ntango bokotalela paragrafe 5, lobelá na mokuse batrakte oyo ekokabolama na Novɛmbɛ mpe bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kokabola yango. Ntango bokokóma na paragrafe 7, bósala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kosalela batrakte na litatoli ya libaku malamu.
Loyembo 97 mpe libondeli