Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Novembre lok. 31
  • Lisalisi mpo na koyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi mpo na koyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Masolo mosusu
  • Programɛ ya libota​—Boyekoli ya libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kokanisa te ete okokoka te mpo ozalaka na ntango te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Novembre lok. 31
Ndeko mwasi moko azali kosalela ordinatɛrɛ, Biblia, mpe mwa kayɛ na boyekoli na ye moko. Azali kosalela etanda “Bikólo ya nguya oyo Danyele asakolaki” na Apɛndisi B9 ya Biblia “Libongoli ya Mokili ya Sika.”

Lisalisi mpo na koyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ

OZALAKA na mokakatano ya kosala boyekoli na yo moko ya Biblia pɔsɔ nyonso mpe kosala ete esepelisa yo? Ekómelaka biso nyonso na bantango mosusu. Kasi meká kokanisa makambo mosusu oyo tosalaka mbala na mbala, na ndakisa kosukola. Kosukola ezwaka ntango mpe esɛngaka milende, kasi nsima ya kosala yango tomiyokaka malamu! Koyekola Biblia ezali mpe lokola “kosukola . . . mai na nzela ya liloba.” (Ef. 5:26) Talá mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo:

  • Tyá programɛ. Boyekoli na yo moko ya Biblia ezali na kati ya “makambo oyo eleki ntina” oyo mokristo asengeli kosala. (Flp. 1:10) Mpo okangama mpenza na programɛ yango, komá yango na papye mpe bambá yango na esika oyo okoki komona yango, na ndakisa na efelo to na porte ya frigo. To okoki kotya ngonga ya koyekola na telefone mpo elela mwa moke liboso ntango ya koyekola ekoka.

  • Yokanisá yango na makoki na yo. Okokaka kotya makanisi esika moko na boumeli ya ntango molai to omonaka malamu okabola ntango ndambondambo? Yo moko omiyebi malamu. Yokanisá boyekoli na yo na makambo ya bomoi na yo. Soki omoni ete ozali kokoka te koyekola na ntango oyo otyaki, okoki koyekolaka ata miniti 10 kaka? Soki ozali kozwa ata ngonga moke, okoki koyekola makambo mingi mpenza. Mpe soki okómi na momeseno yango, ekoki kotinda yo okoba koyekola ntango molai.—Flp. 2:13.

  • Poná liboso likambo oyo okoyekola. Soki ofandi mpe na nsima omituni soki okoyekola nini, okokoka te ‘kosalela ntango na yo malamu mpenza.’ (Ef. 5:16) Mpo na nini te osala liboso liste ya makambo to masolo oyo okolinga koyekola? Soki motuna moko eyeli yo na makanisi, bakisá yango na liste wana. Mpe mbala nyonso oyo oyekoli, okoki kobakisa na liste na yo makanisi mosusu oyo okolinga koyekola mbala ya nsima.

  • Bongolá makambo soki esengeli. Mekáká kobongola makambo mosusu na programɛ na yo ya boyekoli, na ndakisa ntango oyo okolekisa na boyekoli to makambo oyo okopona koyekola. Likambo oyo eleki ntina ezali te ntango nini, ngonga boni, to makambo nini ozali koyekola—kasi ezali nde oyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ.

Tokozwa mpenza matomba soki tozali koyekola mbala na mbala. Tokopusana penepene na Yehova, tokoyeba kosala makambo na bwanya, mpe tokozwa makasi.—Yos. 1:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto