Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/14 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 11/14 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya zomi na mibale

“Toyei awa mpo na kosolola likambo etali mabota. Baboti mingi balingaka ete bana na bango bálinga Nzambe. Okanisi ete baboti nde basengeli koteya bana na bango, to bana basengeli koyekola kolinga Nzambe na ndenge na bango moko?” Tiká ye apesa eyano. Lakisá ye lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2014, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/12/2014

“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kosolola makambo ya Nzambe. Toyebi ete moto na moto azali na makanisi na ye mpo na Nzambe. Okanisi ete bato mingi batalelaka Nzambe lokola nguya moko boye, to moninga oyo amibanzabanzaka na mokomoko na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo ya Biblia emonisi boyokani oyo Nzambe alingi ete tózala na yango elongo na ye. [Tángá Yakobo 4:8a.] Zulunalo oyo elobeli makambo misato ya kosala mpo tómiyoka penepene na Nzambe.”

Lamuká! 12/2014

“Tozali kosolola na bato na mwa miniti moke mpo na maladi moko oyo ezali kotungisa bato mingi. Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete na ntango moko boye, moto moko likoló ya minei akobɛla maladi ya motó, lokola konyokwama na makanisi. Okanisi ete bato mingi bazali kobɛla bamaladi ya motó? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia epesi biso elikya ete na mikolo ezali koya, mpasi mpe maladi ekozala lisusu te na mokili. [Tángá Emoniseli 21:3, 4.] Zulunalo oyo elobeli mwa makambo oyo moto nyonso asengeli koyeba mpo na maladi ya motó.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto