Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/13 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 1/13 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya 2

“Bato mingi bakanisaka ete Zabolo nde atindaka bato básala mabe oyo tozali komona. Kasi bamitunaka boye: ‘Zabolo autá wapi? Nzambe nde asalaki ye?’ Yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo ekomami awa.” Lakisá ye lisolo oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 sanza ya mibale, mpe bótalela paragrafe ya liboso ná vɛrsɛ oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/02/2013

“Tokoki koyeba likanisi na yo mpo na moto moko oyo ezala Bakristo, Bayuda, to Bamizilma bamemyaka mingi? Moto yango nkombo na ye Moize. Ntango oyokaka nkombo wana, nini eyelaka yo liboso na makanisi? [Tiká ye apesa eyano.] Atako Moize asalaki mabunga, ndenge oyo Biblia elobeli ye ezali mpenza kosepelisa. [Tángá Kolimbola Mibeko 34:10-12.] Zulunalo oyo elobeli bizaleli ya Moize misato ya malamu mpe ndenge oyo tokoki komekola ye.”

Lamuká! 02/2013

“Mikolo oyo, bato mingi bazali kokende kofanda na bikóló mosusu mpo na koluka bomoi ya malamu. Okanisi ete ntango nyonso bazwaka oyo bazali koluka? [Tiká ye apesa eyano.] Kokende kofanda na ekólo mosusu ebandi lelo te. Talá ndakisa moko oyo ezali na mokanda ya liboso ya Biblia. [Tángá Ebandeli 46:5, 6.] Zulunalo oyo elobeli mituna yango.” Lakisá ye mituna oyo ezali na nsuka ya lokasa 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto