Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya mibale
“Bato oyo tosololi na bango bazali na makanisi ekeseni mpo na Biblia. Bamosusu, bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, mpe bamosusu bamonaka yango lokola babuku nyonso. Bongo yo?” Tiká ye apesa eyano. Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2014, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/02/2014
“Bato mingi balingaka ete bitumba esila. Okanisi ete mokolo mosusu kimya ekokɔta mpenza na mokili? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elaki. [Tángá Nzembo 46:9.] Likambo ya esengo, makambo oyo ezali kosalema banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba emonisi ete etikali moke Nzambe akokokisa esakweli yango mpe akosukisa bitumba mpo na libela. Zulunalo oyo elimboli likambo yango.”
Lamuká! 02/2014
“Tozali kotala bino na mwa miniti moke mpo na kolobela likambo moko oyo etali bato nyonso. Emonani ete tozali lisusu na ntango mingi te ya kosala makambo nyonso. Okanisi ete tokómi nde na makambo mingi ya kosala to nde tozali kobungisa ntango mingi mpamba? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bayebaka te ete Biblia epesi toli oyo ebongi, oyo ekosalisa biso tóyeba kosalela ntango na ndenge ya malamu. Ndakisa moko yango oyo. [Tángá Bafilipi 1:10a.] Zulunalo oyo elobeli makambo minei oyo esalisaki bato mingi básalela ntango na bango malamu mpenza.”