Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/13 nk. 3-4
  • Tóyoka mpe tóyekola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyoka mpe tóyekola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • ‘Yoká mpe bakisá mayele mingi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • “Yanganisá bato”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 4/13 nk. 3-4

Tóyoka mpe tóyekola

1. Mpo na nini ekoki kosɛnga tósala milende mingi mpo tóyoka mpe tóyekola na liyangani ya etúká?

1 Mosika te mayangani ya etúká ya mobu 2013 ekobanda. Mosala makasi ezali kosalema mpo na kobongisa mayangani yango oyo ekokokisa mposa ya bato ya mokili mobimba. Osili kozwa bibongiseli mpo ozala mikolo nyonso misato ya liyangani? Na mayangani ya minene, makambo oyo elongolaka likebi ezalaka mingi. Na yango, ekosɛnga kosala milende mingi mpo tótya likebi na mateya. Lokola liyangani eumelaka koleka makita ya lisangá, esɛngaka kotya likebi ntango molai. Lisusu, kosala mobembo mpe makambo mosusu ekoki kolɛmbisa. Na yango, nini ekosalisa biso tótya likebi mpo tóyoka mpe tóyekola?​—Mib. 31:12.

2. Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na liyangani ya etuka?

2 Liboso ya liyangani: Na site Internet na biso, www.pr2711.com batye programɛ ya liyangani ya etúká, oyo esangisi mitó ya makambo ya badiskur nyonso mpe vɛrsɛ moko to bavɛrsɛ mibale oyo esimbi motó ya likambo ya mokolo mokomoko. Soki tosalelaka Internet, kotalela liboso makambo yango ekosalisa biso tóbongisa motema na biso mpo na makambo oyo tokoyoka. (Ezr. 7:10) Na losambo na bino na kati ya libota, mpo na nini te kozwa ntango ya kolobela makambo etali liyangani yango?

3. Nini ekosalisa biso tóyoka malamu?

3 Ntango liyangani ezali kosalema: Soki likoki ezali, kende na twalɛti liboso ete liyangani ebanda. Kangá telefone na yo mpo oyamba te soki babengi yo, mpo ozwa to otindela basusu bamesaje te ntango liyangani ezali kosalema. Soki esengeli moto abenga yo, ekozala malamu otya telefone na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato te soki babengi yo. Soki ozali kosalela aparɛyi mosusu (na ndakisa tablette électronique), salelá yango na ndenge oyo ekobenda likebi ya basusu te. Ntango liyangani ezali kosalema, kolya to komɛla te. (Mos. 3:1) Taláká molobi ntango azali koloba. Landáká na Biblia na yo ntango bavɛrsɛ ezali kotángama. Komáká makambo na mokuse.

4. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango mpo báyoka mpe báyekola?

4 Tolingi mpe ete bana na biso báyoka mpe báyekola. Masese 29:15 elobi boye: “Mwana oyo batiki asala oyo alingi akoyokisa mama na ye nsɔni.” Na yango, ezali malamu mabota efanda esika moko mpo baboti básalisa bana na bango mpo bálanda liyangani na likebi, na esika básololaka, bátindaka bamesaje, to bátambolatambola. Ata soki bana bakokanga ntina ya makambo nyonso te mpo bazali mike, esengeli koteya bango bálala te mpe báfanda kimya.

5. Mpo na nini ezali na ntina kozongela makambo toyokaki na liyangani, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

5 Na nsuka ya mokolo mokomoko ya liyangani: Kolala na retare te. Kende kolala na ngonga ebongi mpo opema ntango molai. Kozongela makambo oyokaki ekosalisa yo obosana yango noki te. Na yango, ekozala malamu mpokwa nyonso bózwaka mwa miniti ya kolobela na libota, makambo oyo boyokaki na liyangani. Soki okei kokutana na baninga, mpo na nini te komema makambo oyo okomaki mpe kolobela likambo moko to makambo mibale oyo esepelisaki yo mingi? Ntango liyangani ekosila, bokoki kozwaka ntango na losambo na bino na kati ya libota mpo na kolobela makambo oyo bokoki kosalela na libota na bino. Bokoki mpe kozwaka ntango pɔsɔ nyonso mpo na kotalela eteni moko ya mokanda nyonso ya sika oyo ebimaki.

6. Kozala kaka na esika ya liyangani ekoki? Limbolá.

6 Fɛti ezalaka na ntina mpenza te soki bato balei biloko te. Tokoki mpe koloba bongo mpo na fɛti ya elimo oyo tokozala na yango na liyangani ya etúká. Tiká ete tózala wana mikolo nyonso misato, tóyoka na likebi, mpe tósalela makambo oyo tokoyoka mpo tózwa mpenza litomba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto