Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/14 lok. 8
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 4/14 lok. 8

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya 5

“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kolobela motuna moko ya ntina mingi. [Lakisá ye motuna ya liboso na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2014.] Okanisi nini?” Tiká ye apesa eyano. Bótalela elongo makanisi oyo ezali na nse ya motuna yango mpe bótánga ata vɛrsɛ moko na bavɛrsɛ oyo ezali wana. Tikelá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo na kotalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/05/2014

“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo bato mingi bazali na mposa ya koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Oyokaka ndenge nini ntango okanisaka mikolo ezali koya? Obangaka to ozalaka na elikya? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, bótánga vɛrsɛ moko na etanda oyo elobi “Nzambe alobi nini mpo na avenire?”] Zulunalo oyo elobeli makambo mosusu oyo Nzambe alobi ete ekosalema mpe emonisi ntina oyo tosengeli kondima ete ekosalema mpenza.”

Lamuká! 05/2014

“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kosalisa bango báyeba ndenge ya kolonga mitungisi. Omonaka ete lelo oyo bato bazali na mitungisi mingi koleka ndenge ezalaki liboso? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bamonaka ete batoli ya malamu oyo Biblia epesaka esalisaka bango bálonga mitungisi. Tózwa ndakisa moko. [Tángá Matai 6:34.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala soki tokutani na makambo minei oyo mbala mingi ebimisaka mitungisi.”

Liyebisi: Nimero oyo ekoki kosepelisa mingimingi bato ya mombongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto