Nsango ya Bokonzi No. 38 ekokabolama na sanza ya zomi na moko!
1. Mituna nini bato bazalaka na yango mpo na liwa, mpe ndenge nini bakozwa biyano na yango na sanza ya zomi na moko?
1 Liwa ezali monguna ya bato nyonso, ezala bato ya bindimeli ya ndenge nini. (1 Ko. 15:26) Bato mingi bamitunaka soki bakufi bazalaka wapi mpe soki bakomona bango lisusu. Yango wana, na boumeli ya sanza mobimba, masangá bakokabola Nsango ya Bokonzi No. 38, oyo ezali na motó ya likambo “Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?” Kampanye yango ya ntina mingi ekobanda na 01/11/2013. Nsima ya kampanye yango, Nsango ya Bokonzi No. 38 ekosalelama lokola trakte na mosala ya kosakola.
2. Ndenge nini Nsango ya Bokonzi No. 38 ebongisami?
2 Ndenge ebongisami: Nsango ya Bokonzi No. 38 ebongisami na ndenge oyo okoki kogumba yango na bolai mpo motó ya likambo oyo ezali kobenda likebi emonana elongo na maloba oyo: “Okoloba ete . . . ɛɛ? te? ntango mosusu?” Ntango moto afungoli Nsango ya Bokonzi, akomona oyo Biblia elobi mpo na motuna oyo ezali motó ya likambo mpe elaka oyo Biblia epesi mpo na ye. Akomona mpe makambo oyo ekoki kotinda ye andimela Biblia. Lokasa ya nsuka ya Nsango ya Bokonzi ezali na motuna moko ya ntina oyo ezali kotinda ye akanisa mpe kosɛnga ye aluka koyekola makambo mosusu.
3. Ndenge nini Nsango ya Bokonzi No. 38 ekokabolama?
3 Ndenge oyo tokokabola yango: Kampanye yango ekosalema ndenge moko na oyo tosalaka mpo na Ekaniseli mpe mayangani ya etúká. Bankulutu bakopesa malako na ndenge ya kokabola yango na teritware ya lisangá na bango, na kolanda malako oyo ezali na mokanda oyo bazwaki ya 01/04/2013. Masangá oyo bazali na teritware monene te bakoki kosalisa masangá ya pene na bango oyo bazali na teritware ya monene koleka. Ntango ozali kozwa nkasa ya Nsango ya Bokonzi No. 38, kobosana te ete osengeli kozwa kaka oyo okosalela na boumeli ya pɔsɔ moko. Na boumeli ya kampanye, tokoki kokabola yango na bisika ya bato nyonso nsima ya kokabola yango ndako na ndako na teritware na biso mobimba. Soki tosilisi kokabola yango nyonso liboso ete sanza esila, tokokabola mikanda oyo esengeli kokabola na sanza wana. Na mokolo ya pɔsɔ ya liboso, tokomipesa na kampanye yango ya ntina na esika ya kobanda koyekola na bato Biblia. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tosengeli mpe kopesa bazulunalo soki ebongi. Ozali komibongisa mpo osangana mpenza na kampanye yango ya ntina mingi?