Kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ekobanda mwa 1 sanza ya misato
1. Mokolo nini tokobanda kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli, mpe mpo na nini ekozala molai na mbula oyo?
1 Na mokolo ya Mitano, mwa 1 sanza ya Misato, tokobanda kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Ekaniseli ekosalema na mwa 26 sanza ya misato; yango emonisi ete kampanye ekozala molai koleka ndenge ezalaki na bambula eleki. Yango ekosala ete bato mingi bákoka kozwa lokasa ya libyangi, mingimingi soki bafandaka epai teritware ya lisangá ezali monene.
2. Bibongiseli nini ezwami mpo basakoli bázwa nkasa ya libyangi mpe mpo na kokabola yango na teritware mobimba ya lisangá?
2 Kozwa bibongiseli: Bankulutu bakopesa malako na ndenge ya kokabola nkasa ya libyangi na teritware mobimba ya lisangá, mpe soki tokotika yango to te na bandako oyo tokokuta bato te. Soki nkasa ya libyangi etikali nsima ya kokabola yango ndako na ndako, tokokabola yango ntango tozali kosakola na bisika ya bato ebele. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akosala nyonso mpo nkasa ya libyangi oyo ezali na dati ná adrɛsi etyama na esika tozwaka mikanda na Ndako ya Bokonzi mpo basakoli bázwa yango. Kasi bakotya yango wana nyonso mbala moko te. Tosengeli kozwa kaka oyo tokosalela na boumeli ya pɔsɔ moko.
3. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopesa lokasa ya libyangi?
3 Tokoloba nini? Ekozala malamu tóloba mingi te mpo tózwa likoki ya kopesa bato mingi nkasa ya libyangi. Lokasa 4 ezali na makanisi mpo na kokabola yango, oyo tokoki koyokanisa na teritware na biso. Na ntembe te, tokokende mbangumbangu te soki moto ayambi biso na boboto to azali na mituna. Ntango tozali kokabola yango mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tosengeli mpe kopesa bazulunalo soki ebongi. Na mwa 2 sanza ya misato, tokokabola kaka nkasa ya libyangi na esika ya kobanda koyekola na bato Biblia.
4. Mpo na nini tosengeli kosangana na molende mpenza na kampanye?
4 Tozali kolikya ete bato mingi bakozala elongo na biso na Ekaniseli. Diskur ya Ekaniseli ekolimbola soki Yesu azali mpenza nani. (1 Ko. 11:26) Ekomonisa ndenge oyo liwa na ye ezali kosalisa biso. (Rom. 6:23) Lisusu, ekomonisa mpe ntina oyo tosengeli kokanisaka ye. (Yoa. 17:3) Tiká ete tósangana na molende mpenza na kampanye yango!