Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/14 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 5/14 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya motoba

“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kotalela motuna oyo ezali kobenda likebi.” [Lakisá ye motuna ya liboso oyo ezali na ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/2014.] Okanisi nini?” Tiká ye apesa eyano. Bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/06/2014

“Mbula na mbula, makaya ezali koboma bato soki milio 6. Okanisi ete eloko moko ekoki kosalema mpo na kopekisa likambo yango oyo epalangani mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi batikaki komɛla likaya nsima ya kotalela likanisi ya Nzambe na likambo yango. Na ndakisa, vɛrsɛ oyo ya Biblia esalisaki bato mosusu bámona ndenge oyo komɛla likaya ekoki kosala basusu. [Tángá 1 Bakorinti 10:24.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo kotalela likanisi ya Nzambe na oyo etali komɛla makaya ekoki kotinda moto atika komɛla yango.”

Lamuká! 06/2014

“Kosalela Internet mpo na kosolola na bato esalisi bato mingi bakóma na baninga ebele, ezala ya ndenge nini. Mpo na yo, moninga ya solosolo asengeli kozala na ezaleli nini ya ntina mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Talá toli oyo ya Biblia, oyo ebongi mpenza mpo na boninga. [Tángá Yakobo 1:19.] Zulunalo oyo elobeli mitinda minei oyo ekoki kosalisa biso mpo basusu básepela kozala baninga na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto